Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 18

Ndenge nini tokoki koyeba bakristo ya solo

Ndenge nini tokoki koyeba bakristo ya solo

Bamilio ya bato balobaka ete bazali bakristo. Kasi mateya na bango nyonso ezalaka ndenge moko te, mpe batambwisaka bomoi na bango nakolanda mibeko moko te. Ndenge nini tokoki koyeba bakristo ya solo?

1. Mokristo azali nani?

Bakristo bazali bayekoli, to bato oyo balandaka Yesu Kristo. (Tángá Misala 11:26.) Ndenge nini bamonisaka ete bazali bayekoli ya Yesu? Yesu alobaki: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.” (Yoane 8:31) Yango emonisi ete bakristo ya solo basengeli kotosa mateya ya Yesu. Kaka ndenge Yesu azalaki kosalela Makomami mpo na koteya, mateya ya bakristo ya solo mpe eutaka na Biblia.​—Tángá Luka 24:27.

2. Ndenge nini bakristo ya solo bamonisaka bolingo?

Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bólinganaka ndenge ngai nalingi bino.” (Yoane 15:12) Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki bayekoli na ye? Alekisaki ntango elongo na bango, alendisaki bango, mpe asalisaki bango. Kutu apesaki bomoi na ye mpo na bango. (1 Yoane 3:16) Ndenge moko mpe, bakristo ya solo bamonisaka na maloba mpe na misala na bango ete balinganaka.

3. Bakristo ya solo bamipesaka na mosala nini?

Yesu apesaki bayekoli na ye mosala. Biblia elobi: ‘Atindaki bango básakola Bokonzi ya Nzambe.’ (Luka 9:2) Bakristo ya solo bazalaki kosakola kaka te na bisika na bango ya losambo kasi mpe na bisika ya bato nyonso mpe na bandako ya bato. (Tángá Misala 5:42; 17:17.) Lelo oyo mpe, bakristo ya solo bateyaka solo ya Biblia esika nyonso oyo bato bazali. Lokola balingaka bazalani na bango, bapesaka ntango mpe makasi na bango mpo na koyebisa bato nsango ya Biblia oyo ebɔndisaka mpe epesaka elikya.​—Marko 12:31.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba bokeseni kati na bakristo ya solo na bato oyo balandaka te mateya mpe ndakisa ya Yesu.

4. Balukaka koyeba mateya ya Biblia

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kozwa Liloba ya Nzambe na motuya mingi.

Bato mosusu oyo balobaka ete bazali bakristo bamonaka te ntina ya koyeba mateya ya Biblia to kosalela yango. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Bato ya mangomba oyo balobaka ete bazali bakristo basalaki nini mpo na kopekisa bato báyeba mateya ya Yesu?

Yesu ateyaki makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe. Tángá Yoane 18:37, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Na kolanda maloba ya Yesu, ndenge nini tokoki koyeba bakristo oyo bazali “na ngámbo ya solo”?

5. Bateyaka mateya ya Biblia

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki bazalaki koteya basusu.

Liboso Yesu azonga na likoló, apesaki bayekoli na ye mosala oyo basalaka tii lelo. Tángá Matai 28:19, 20 mpe Misala 1:8, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nsango malamu esengeli kosakolama tii wapi?

6. Basalelaka makambo oyo bateyaka

Nini endimisaki mobali moko na nkombo Tom ete amoni bakristo ya solo? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video oyo, mpo na nini Tom azalaki kosepela lisusu na mangomba te?

  • Nini endimisaki ye ete amoni mpenza lingomba ya bakristo ya solo?

Makambo oyo tosalaka eleki maloba. Tángá Matai 7:21, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini ezali na ntina mingi na miso ya Yesu: Koloba ete ondimaka to komonisa yango na misala?

7. Balinganaka

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalakimpe bazalaki kolingana

Nini emonisi ete bakristo ya solo batyaka bomoi na bango na likama mpo na bandeko na bango bakristo? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video oyo, nini etindaki ndeko Lloyd atya bomoi na ye na likama mpo na ndeko Johansson?

  • Okanisi ete makambo asalaki emonisi ete azali mokristo ya solo?

Tángá Yoane 13:34, 35, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini bayekoli ya Yesu (to bakristo ya solo) basalelaka bato oyo bazali loposo to ekólo moko te na bango makambo?

  • Na ntango ya etumba, bolingo etindaka bakristo ya solo básala nini?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Bakristo basalaka makambo ya mabe mpenza, ndenge nini bakoki kozala na lingomba ya solo?”

  • Vɛrsɛ nini okotángela ye mpo na komonisa ndenge oyo tokoki koyeba bakristo ya solo?

NA MOKUSE

Bakristo ya solo balandaka mateya ya Biblia, bamonisaka bolingo ya solosolo, mpe basakolaka solo ya Biblia.

Bozongeli

  • Mateya ya bakristo ya solo eutaka wapi?

  • Ezaleli nini emonisaka bakristo ya solo?

  • Bakristo ya solo basalaka mosala nini?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba bato oyo basalaka nyonso mpo na kolanda mateya mpe ndakisa ya Yesu.

Batatoli ya Yehova​—Bazali banani? (1:13)

Talá nini esalaki ete mamelo moko amona “libota ya solosolo” ya bandeko.

“Basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso!” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2014)

Talá ndenge bakristo ya solo bamonisaka bolingo epai ya bandeko na bango bakristo oyo bazali na mposa ya lisalisi.

Kosalisa bandeko na biso na ntango ya likama​—Video ya mokuse (3:57)

Talá ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bakristo ya solo ya mikolo na biso basalaka makambo oyo Yesu alobaki ekomonisa ete bazali bayekoli na ye.

“Ndenge nini okoki koyeba bakristo ya solo?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/2012)