Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 22

Ndenge nini okoki koyebisa basusu nsango malamu?

Ndenge nini okoki koyebisa basusu nsango malamu?

Lokola ozali koyekola mateya ya Biblia, okoki kokanisa boye: ‘Moto nyonso asengeli koyekola yango!’ Ezali solo, moto nyonso asengeli koyeba mateya ya Biblia! Kasi, mbala mosusu obangaka koyebisa basusu makambo oyo ozali koyekola. Tólobela oyo okoki kosala mpo otika kobanga, mpe obanda kosakola na esengo nsango malamu oyo ezali na Biblia.

1. Ndenge nini okoki koyebisa bato ya libota to baninga na yo makambo oyo ozali koyekola?

Bayekoli ya Yesu balobaki: “Tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Misala 4:20) Basepelaki na makambo oyo Yesu ateyaki bango mpe balingaki koyebisa yango bato nyonso. Yo mpe oyokaka ndenge wana? Soki ezali bongo, luká mabaku ya koyebisa na lolenge ya malamu bato ya libota mpe baninga na yo makambo ozali koyekola.​—Tángá Bakolose 4:6.

Mwa mayele mpo na kobanda lisolo

  • Mpo na kolobela makambo ya Biblia ntango ozali kosolola na bato ya libota na yo, okoki kobanda boye: “Na pɔsɔ oyo nayekoli likambo moko oyo esepelisi ngai mingi.”

  • Soki moninga moko azali kobɛla to komitungisa, tángelá ye vɛrsɛ mpo na kolendisa ye.

  • Soki baninga na yo ya mosala batuni yo ndenge pɔsɔ na yo elekaki, yebisá bango makambo oyekolaki na boyekoli na yo ya Biblia to na makita ya lisangá.

  • Lakisá baninga na yo site Internet jw.org.

  • Bengá basusu bázala elongo na yo ntango ozali koyekola Biblia to lakisá bango ndenge ya kosɛnga boyekoli ya Biblia na site Internet jw.org.

2. Mpo na nini ebongi komityela mokano ya kosakola elongo na bandeko ya lisangá?

Bayekoli basakolaki nsango malamu epai ya bato oyo bayebaki, kasi basukaki kaka wana te. Yesu “atindaki bango mibalemibale liboso na ye na engumba nyonso” mpo na kosakola. (Luka 10:1) Lokola mosala yango ebongisamaki malamu, bato mosusu bazwaki libaku ya koyoka nsango malamu. Lisusu, bayekoli bayokaki esengo mingi ndenge basakolaki elongo. (Luka 10:17) Yo mpe okoki komityela mokano ya kosakola elongo na bandeko ya lisangá!

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo oyo okoki kosala mpo otika kobanga mpe oyoka esengo oyo mosala ya kosakola nsango malamu epesaka.

3. Yehova akozala na yo

Bato mosusu balingaka kosakola, kasi babangaka ndenge oyo bato bakotalela bango, to ndenge oyo bakosalela bango makambo.

  • Obangaka koyebisa bato mosusu makambo oyo ozali koyekola? Mpo na nini?

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Batatoli ya Yehova oyo misato basalaki nini mpo bátika kobanga?

Tángá Yisaya 41:10, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini osengeli kobondela ntango ozali kobanga kosakola?

Oyebaki yango?

Na ebandeli, Batatoli ya Yehova mingi bakanisaki ete bakokoka ata moke te kosakwela bato nsango malamu. Na ndakisa, Sergey azalaki komona ete azali na ntina te mpe azalaki kokoka te kosolola na bato. Kasi ayekolaki Biblia. Alobi: “Atako nazalaki kobanga, nabandaki koyebisa basusu makambo oyo nazalaki koyekola. Eloko ekamwisaki ngai mpenza, koyebisa basusu makambo ya Biblia esalisaki ngai nakóma komona ete nazali na ntina. Esalaki mpe ete mateya wana ya sika efanda mpenza na motema na ngai moko.”

4. Zalá na boboto

Liboso ya kosakwela moto nsango malamu, kotalela kaka te makambo oyo okoloba, kasi talelá mpe ndenge oyo okoloba yango. Tángá 2 Timote 2:24 mpe 1 Petro 3:15, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini okoki kosalela batoli oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ntango ozali kosolola na bato makambo ya Biblia?

  • Bato mosusu ya libota to baninga na yo bakoki koboya koyoka yo. Okoki kosala nini? Osengeli te kosala nini?

  • Mpo na nini ekoki kozala malamu kotuna bato mituna na mayele, na esika ya kondimisa bango makambo na makasi?

5. Kosakola nsango malamu epesaka esengo

Yehova apesaki Yesu mosala ya kosakola nsango malamu. Yesu atalelaki mosala yango ndenge nini? Tángá Yoane 4:34, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Kolya biloko ya malamu ebatelaka bomoi mpe epesaka biso esengo. Mpo na nini Yesu alobaki ete kosala mokano ya Nzambe, na ndakisa kosakola nsango malamu, ezali lokola biloko ya kolya?

  • Okanisi nini: Kosakola nsango malamu ekoki komemela yo esengo ya ndenge nini?

Batoli

  • Na likita ya kati ya pɔsɔ, lukáká mayele ya kobanda lisolo oyo okoki kosalela.

  • Sololá na moteyi na yo mpo na koyeba oyo okoki kosala, mpo obanda kosala masolo na makita ya kati ya pɔsɔ. Masolo oyo okosala ekosalisa yo omibongisa malamu mpo na koyebisa basusu makambo oyo ozali koyekola.

  • Salelá eteni “Soki moto alobi na yo” to “Soki moto atuni yo” ya buku oyo, mpo na koyeba biyano oyo okoki kopesa na mituna mpe na bantembe oyo bato babimisaka.

SOKI MOTO ATUNI YO: “Nsango nini?”

  • Ndenge nini okoki kosalela libaku yango mpo na koyebisa moto yango makambo oyo ozali koyekola na Biblia?

NA MOKUSE

Koyebisa bato mosusu nsango malamu epesaka esengo, mpe mbala mosusu ezali mpasi te ndenge ozali kokanisa.

Bozongeli

  • Mpo na nini osengeli koyebisa basusu nsango malamu?

  • Ndenge nini okoki kosala yango na limemya?

  • Soki ozali kobanga kosakola, okoki kosala nini mpo otika kobanga?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá mayele minei oyo okoki kosalela ntango ozali kosakola nsango malamu mpe kopesa karte ya jw.org.

Ndenge ya kokabola karte ya JW.ORG (1:43)

Luká koyeba bizaleli minei oyo ekoki kosalisa yo oyebisa basusu nsango malamu.

“Okoki sikoyo kokóma moluki-bato?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 09/2020)

Talá ndenge oyo ndakisa moko ya Biblia ekoki kopesa biso makasi ya kosakola nsango malamu, ata soki tozali bilenge.

Yehova akopesa yo mpiko (11:59)

Talá oyo okoki kosala mpo na koyebisa makambo ya Biblia epai ya bato ya libota na yo oyo bayoká naino nsango ya Yehova te.

“Ndenge ya kosimba mitema ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2014)