Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 24

Baanzelu bazali banani mpe basalaka nini?

Baanzelu bazali banani mpe basalaka nini?

Yehova alingi tóyeba libota na ye oyo ezali na likoló. Baanzelu bazali na kati ya libota yango mpo Biblia ebengi bango “bana ya Nzambe.” (Yobo 38:7) Biblia elobi nini mpo na baanzelu? Ndenge nini basalelaka bato makambo? Baanzelu nyonso bazali na kati ya libota ya Nzambe?

1. Baanzelu bazali banani?

Yehova akelaki baanzelu liboso asala mabele. Ndenge moko na Yehova, baanzelu bamonanaka te mpe bafandaka na likoló. (Baebre 1:14) Baanzelu bazali ebele mpenza, mpe anzelu mokomoko azali na bomoto na ye. (Emoniseli 5:11) Baanzelu ‘basalelaka liloba ya Yehova, bayokaka mongongo na ye.’ (Nzembo 103:20) Na kala, Yehova azalaki kotinda baanzelu báyebisa bato nsango na ye, básalisa mpe bábikisa basaleli na ye. Lelo oyo, baanzelu bamemaka bakristo ya solo epai ya bato oyo bazali na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe.

2. Satana ná bademo bazali banani?

Baanzelu mosusu batombokelaki Yehova. Anzelu ya liboso oyo atombokelaki Nzambe ezali “Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Emoniseli 12:9) Satana azalaki na mposa ya kozala mokonzi, yango wana atindaki Adama ná Eva mpe baanzelu mosusu bátombokela Nzambe. Biblia ebengi baanzelu yango bademo. Yehova abenganaki bango na likoló, abwakaki bango awa na mabele, mpe akoboma bango.​—Tángá Emoniseli 12:9, 12.

3. Ndenge nini Satana ná bademo balukaka kokosa biso?

Satana ná bademo bakosaka bato na nzela ya misala ya bilimo mabe, elingi koloba, batindaka bato báluka kosolola na bilimo mabe. Na ndakisa, bato mosusu bakendaka epai ya bato oyo batalaka minzoto mpo na koyeba makambo oyo ekoya, bato oyo basololaka na bilimo, banganga-nkisi mpe bandɔki. Basusu balukaka lisalisi ya bilimo mabe ntango bazali kobela. Bato mosusu bandimaka mpe ete bakoki kosolola na bato oyo bakufá. Kasi Yehova akebisi biso boye: “Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo, mpe bótuna te bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya.” (Balevi 19:31) Akebisi biso mpo na kobatela biso na mitambo ya Satana mpe bademo. Bazali banguna ya Nzambe, mpe balingaka kosala biso mabe.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo ya malamu oyo baanzelu basalaka, likama ya misala ya bilimo mabe, mpe ndenge oyo tokoki komibatela na mitambo ya Satana mpe ya bademo.

4. Baanzelu basalisaka bato báyeba makambo ya Yehova

Baanzelu ya Nzambe bakendaka te na baporte ya bato mpo na kosakwela bango nsango malamu. Kasi, bakoki kosalisa basaleli ya Nzambe bakutana na bato oyo balingi koyeba makambo ya Nzambe. Tángá Emoniseli 14:6, 7, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini tozali na mposa ya lisalisi ya baanzelu na mosala ya kosakola?

  • Koyeba ete baanzelu bakoki kosalisa yo okutana na bato oyo bazali na mposa ya koyoka nsango ya Biblia, elendisi yo? Mpo na nini?

5. Boyá misala ya bilimo mabe

Satana ná bademo bazali banguna ya Yehova. Bazali mpe banguna na biso. Tángá Luka 9:38-42, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bademo basalaka bato nini?

Tolingi te ete bademo bákɔta na bomoi na biso. Tángá Kolimbola Mibeko 18:10-12, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini bademo balukaka kosalela biso makambo mpe kosolola na biso? Misala nini ya bademo esalemaka esika ofandi?

  • Okanisi nini: Ebongi mpenza Yehova apekisa biso misala ya bilimo mabe? Mpo na nini?

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Okanisi nini: Eloko oyo Palesa alatisaki mwana na ye mpo na kobatela ye, ezalaki mabe? Mpo na nini?

  • Palesa asengelaki kosala nini mpo amibatela na bademo?

Bakristo ya solo batɛmɛlaka ntango nyonso bademo. Tángá Misala 19:19 mpe 1 Bakorinti 10:21, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezali na ntina obebisa eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bademo?

6. Longá Satana ná bademo na ye

Bademo bazali na nse ya bokonzi ya Satana. Kasi baanzelu ya sembo bazali na nse ya bokonzi ya anzelu-mokonzi, Mikaele, nkombo mosusu ya Yesu. Nguya nini Mikaele azali na yango? Tángá Emoniseli 12:7-9, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Nani aleki na nguya: Mikaele ná baanzelu na ye to Satana ná bademo na ye?

  • Okanisi ete bayekoli ya Yesu basengeli kobanga Satana ná bademo na ye?

Okoki kolonga Satana ná bademo na ye. Tángá Yakobo 4:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini okoki komibatela na mitambo ya Satana ná bademo?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ezali mabe te kobɛta masano to kotala bafilme oyo emonisaka misala ya bilimo mabe. Ezali na yango kaka kominanola.”

  • Mpo na nini likanisi wana ezali likama?

NA MOKUSE

Baanzelu ya sembo basalisaka biso. Satana ná bademo na ye bazali banguna ya Yehova, mpe basalelaka misala ya bilimo mabe mpo na kokosa bato.

Bozongeli

  • Ndenge nini baanzelu ya Yehova basalisaka bato báyeba makambo na ye?

  • Satana ná bademo na ye bazali banani?

  • Mpo na nini osengeli koboya mpenza misala ya bilimo mabe?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba nini emonisi ete Yesu azali Mikaele anzelu-mokonzi.

“Nani azali Mikaele anzelu-mokonzi?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá makambo oyo emonisi ete Zabolo azali ekelamu ya elimo, kasi te etinda to ezaleli moko oyo ezalaka na kati na biso.

“Zabolo azalaka mpenza?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá oyo mwasi moko asalaki mpo na kokata boyokani nyonso na bademo.

“Azwi ntina kati na bomoi” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1993)

Luká koyeba ndenge oyo Satana asalelaka misala ya bilimo mabe mpo na kokosa bato.

“Solo na likambo etali nkisi, bondɔki, mpe bonganga-nkisi” (Nzela ya bomoi ya seko, eteni 5)