Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 27

Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa biso

Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa biso

Tosalaka masumu, tomonaka mpasi mpe tokufaka mpo Adama ná Eva batosaki Nzambe te. a Kasi bomoi na biso ekozala kaka boye te. Yehova azwaki bibongiseli mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo. Biblia elobi ete Yesu apesaki lisiko na nzela ya liwa na ye. Lisiko ezali mbongo to eloko oyo bapesi mpo na kobimisa moto oyo bakangi. Eloko oyo Yesu apesaki ezalaki bomoi na ye ya kokoka oyo azalaki na yango awa na mabele. (Tángá Matai 20:28.) Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, akokaki kozala na bomoi libela na libela awa na mabele, kasi andimaki kokufa mpo biso tózwa eloko oyo Adama ná Eva babungisaki. Yesu amonisaki mpe ete ye ná Yehova balingaka biso mingi. Liteya oyo ekosalisa yo okóma na botɔndi mingi mpo na liwa ya Yesu.

1. Ndenge nini liwa ya Yesu ekoki kosalisa lelo oyo?

Lokola tozali bato ya masumu, tosalaka makambo mingi oyo esepelisaka Yehova te. Kasi, soki toyoki mpenza mawa mpo na masumu na biso, tosɛngi Yehova alimbisa biso na nzela ya Yesu Kristo, mpe tosali nyonso mpo tózongela lisusu mabe yango te, tokoki kokóma baninga ya Nzambe. (1 Yoane 2:1) Biblia elobi: “Kristo mpenza akufaki mbala moko mpo na libela mpo na masumu, moyengebene moko mpo na bato oyo bazangi boyengebene, mpo amema bato epai ya Nzambe.”​—1 Petro 3:18.

2. Mapamboli nini liwa ya Yesu ekomemela biso na mikolo ezali koya?

Yehova atindaki Yesu apesa bomoi na ye ya kokoka “mpo moto nyonso oyo azali kondimela [Yesu] abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Lokola Yesu apesá bomoi na ye, etikali moke Yehova alongola makambo nyonso ya mabe oyo botomboki ya Adama ebimisá. Yango elingi koloba soki tozali na kondima na mbeka ya Yesu, tokozwa libaku ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele!​—Yisaya 65:21-23.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo emonisi ntina oyo Yesu apesaki bomoi na ye, mpe bolamu oyo yango ememeli yo.

3. Liwa ya Yesu elongoli biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Adama abungisaki nini ntango aboyaki kotosa Nzambe?

Tángá Baroma 5:12, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Lisumu ya Adama ebimiselá yo makambo nini?

Tángá Yoane 3:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabele?

  1. Adama azalaki moto ya kokoka oyo atosaki Nzambe te mpe amemelá bato nyonso lisumu mpe liwa

  2. Yesu azalaki moto ya kokoka oyo atosaki Nzambe mpe apesá bato nyonso likoki ya kozala na bomoi ya kokoka mpe ya libela na libela

4. Liwa ya Yesu ekoki komemela bato nyonso bolamu

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Ndenge nini liwa ya moto moko ekoki komemela bato nyonso bolamu?

Tángá 1 Timote 2:5, 6, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Adama azalaki moto ya kokoka, kasi lokola asalaki lisumu, bato nyonso bakómá bato ya masumu mpe bakómá kokufa. Yesu azalaki mpe moto ya kokoka. Na ndenge nini apesaki “lisiko oyo ekokani”?

5. Lisiko ezali likabo oyo Yehova apesi yo

Baninga ya Yehova bamonaka ete lisiko ezali likabo oyo Yehova apesi mokomoko na bango. Na ndakisa, tángá Bagalatia 2:20, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ntoma Paulo alobi nini mpo na komonisa ete lisiko ezali likabo oyo Nzambe apesá ye?

Lokola Adama asalaki lisumu, ye ná bana na ye nyonso basengelaki kokufa. Kasi Yehova atindaki Mwana na ye akufa mpo okoka kozwa bomoi ya libela na libela.

Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ oyo elandi, kanisá ndenge Yehova ayokaki ntango Mwana na ye azalaki konyokwama. Tángá Yoane 19:1-7, 16-18, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Oyoki ndenge nini mpo na likambo oyo Yehova ná Yesu basalelá yo?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Ndenge nini moto moko akoki kokufa mpo na bato nyonso?”

  • Okopesa eyano nini?

NA MOKUSE

Liwa ya Yesu esali ete Yehova alimbisa masumu na biso, mpe epesi biso likoki ya kozala na bomoi libela na libela.

Bozongeli

  • Mpo na nini Yesu akufaki?

  • Na ndenge nini bomoi ya kokoka ya Yesu ezalaki lisiko oyo ekokani?

  • Bolamu nini liwa ya Yesu ekoki komemela yo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge mbeka ya Kristo esalisaki mobali moko oyo azalaki komitungisa mpo na makambo ya mabe oyo asalá mpe amoná.

“Nazali lisusu te moombo ya mobulu” (Lisolo oyo ezali na Internet)

a Lisumu esuki kaka te na kosala likambo ya mabe. Elakisi mpe mposa to makanisi ya kosala makambo ya mabe oyo tozwá epai ya Adama ná Eva.