Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 29

Nini ekómelaka moto ntango akufi?

Nini ekómelaka moto ntango akufi?

Osí obungisá moto moko oyo olingaka na liwa? Mbala mosusu na ntango wana ya mpasi, omitunaki boye: ‘Nini ekómelaka moto ntango akufi? Tokomona lisusu bandeko to baninga na biso oyo bakufá?’ Na liteya oyo mpe oyo elandi, tokozwa biyano ya kolendisa oyo Biblia epesi.

1. Nini ekómelaka moto ntango tokufi?

Yesu alobaki ete liwa ezali lokola mpɔngi. Moto oyo alali mpɔngi makasi ayebaka te makambo oyo ezali koleka esika azali. Na ndenge nini liwa ezali lokola mpɔngi? Soki moto akufi, ayokaka mpasi te. Ayokaka mpe mawa te ndenge akabwani na baninga mpe bandeko na ye, ata soki abandaki kolinga bango mingi. Biblia elobi ete: “Bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Tángá Mosakoli 9:5.

2. Bolamu nini tozwi mpo toyebi oyo Biblia elobi mpo na liwa?

Bato mingi babangaka liwa mpe bato oyo bakufá! Kasi makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa ekoki kolendisa yo. Yesu alobaki: “Solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Mangomba mosusu eteyaka ete ntango moto akufi, molimo na ye ekobaka kozala na bomoi; kasi Biblia eteyaka bongo te. Na yango, moto moko te anyokwamaka nsima ya liwa. Lisusu, lokola bato oyo bakufá bayebaka eloko moko te, bakoki kosala biso mabe te. Yango wana, tosengeli te kosambela bato oyo bakufá to mpe kosala likambo moko boye mpo na kokitisa bango nkanda. Tosengeli mpe te kobondela mpo na bango.

Bato mosusu balobaka ete bakoki kosolola na bato oyo bakufá. Kasi yango ekoki kosalema te. Ndenge kaka touti komona yango, bato oyo bakufá “bayebi ata eloko moko te.” Bato oyo bakanisaka ete basololaka na bandeko to baninga na bango oyo bakufá, basololaka nde na bademo, oyo bamimonisaka lokola bato oyo bakufá. Yango wana, koyeba solo oyo etali liwa ebatelaka biso na bademo. Yehova apekisi biso kosolola na bato oyo bakufá mpo ayebi ete kosala bongo ezali nde kosolola na bademo mpe yango ekomemela biso likama.​—Tángá Kolimbola Mibeko 18:10-12.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na liwa, mpe kómisá kondima na yo makasi epai ya Nzambe ya bolingo, oyo anyokolaka te bato oyo bakufá.

3. Luká koyeba oyo ekómelaka mpenza bato oyo bakufá

Na mokili mobimba, bato bandimaka makambo ndenge na ndenge mpo na oyo ekómelaka moto soki akufi. Mpo na koloba solo, makambo nyonso wana ekoki kozala solo te.

  • Na esika ofandi, makambo nini bato bandimaka mpo na bato oyo bakufá?

Mpo na komona makambo oyo Biblia eteyaka, talá VIDEO.

Tángá Mosakoli 3:20, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela vɛrsɛ oyo, nini ekómelaka moto ntango akufi?

  • Ezali na eloko moko na kati ya nzoto ya moto, oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa?

Biblia ebɛti lisolo ya liwa ya Lazare, moninga ya Yesu. Tángá Yoane 11:11-14 mpo na komona makambo oyo Yesu alobaki mpo na liwa ya Lazare. Na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yesu alobaki ete liwa ekokani na nini?

  • Likambo oyo Yesu alobaki eteyi biso nini mpo na bato oyo bakufá?

  • Makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa, omoni yango ndenge nini?

4. Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa esalisaka biso mpenza

Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa esalisaka biso tóbanga te bato oyo bakufá. Tángá Mosakoli 9:10, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bato oyo bakufá bakoki kosala biso mabe?

Mateya ya Biblia esalisaka biso tokwea te na motambo ya kosambela bato oyo bakufá to mpe kosala likambo moko boye mpo na kokitisa bango nkanda. Tángá Yisaya 8:19 mpe Emoniseli 4:11, na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Okanisi nini: Ndenge nini Yehova atalelaka moto oyo asambelaka bato oyo bakufá to oyo alukaka lisalisi na bango?

Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa elongolá biso na boombo ya mimeseno oyo esepelisaka Yehova te

5. Oyo Biblia elobi mpo na liwa ekitisaka biso motema

Mangomba mingi eteyaka ete soki moto akufi, azwaka etumbu mpo na makambo mabe oyo asalá kala. Kasi koyeba ete bato oyo bakufá, ezala baoyo basalá makambo ya mabe mpenza, banyokwamaka te, ekitisaka biso motema. Tángá Baroma 6:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Biblia elobi ete soki moto akufi, afuti nyongo ya lisumu na ye; okanisi ete moto oyo akufi akoki kozwa lisusu etumbu mpo na masumu oyo asalá kala?

Soki toyekoli koyeba Yehova malamumalamu, tokomona ete anyokolaka ata moke te bato oyo bakufá. Tángá Kolimbola Mibeko 32:4 mpe 1 Yoane 4:8, na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge bavɛrsɛ oyo emonisi yango, Nzambe oyo azali na bizaleli malamu boye akoki mpenza konyokola bato oyo bakufá?

  • Lokola oyebi oyo Biblia elobi mpo na liwa, ekitisi yo motema? Mpo na nini?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nabangaka oyo ekokómela ngai ntango nakokufa.”

  • Okopesa ye vɛrsɛ nini mpo na kokitisa ye motema?

NA MOKUSE

Ntango moto akufi, bomoi na ye esuki. Bato oyo bakufá banyokwamaka te, mpe bakoki te kosala bato oyo bazali na bomoi mabe to malamu.

Bozongeli

  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?

  • Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa esalisi biso na nini?

  • Mpo na nini makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa ekitisaka biso motema?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá oyo Biblia elobi mpo na liloba “molimo.”

“Molimo ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Luká koyeba soki Nzambe atumbaka bato mabe na lifelo ya mɔtɔ.

Lifelo ezali mpenza esika oyo bato banyokwamaka? (3:07)

Talá ndenge mobali moko abɔndisamaki ntango ayebaki makambo oyo Biblia elobi mpo na oyo ekómelaka moto ntango akufi.

“Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2015)