Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 30

Bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bakoki kozonga na bomoi!

Bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bakoki kozonga na bomoi!

Liwa epesaka mpasi mpenza mpe mawa mingi. Yango wana, Biblia ebengi liwa monguna. (1 Bakorinti 15:26) Na liteya 27, oyekolaki ete Yehova akolongola monguna yango. Kasi nini ekokómela bato oyo bakufá? Na liteya oyo, tokomona elaka mosusu ya Yehova: akosekwisa bamiliare ya bato mpo básepela na bomoi libela na libela. Akosekwisa bango! Yango ekoki mpenza kosalema? Bato oyo bakosekwa bakofanda na likoló to awa na mabele?

1. Yehova akosala nini mpo na bandeko to baninga na biso oyo bakufá?

Yehova azalaka na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá. Yobo azalaki na kondima ete Nzambe akobosana ye te ntango akokufa. Ayebisaki Nzambe boye: “Yo okobenga, mpe ngai nakondima [uta na Nkunda].”​—Tángá Yobo 14:13-15.

2. Ndenge nini toyebi ete bato oyo bakufá bakoki kosekwa?

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Nzambe apesaki ye nguya ya kosekwisa bato. Yesu asekwisaki elenge mwasi moko ya mbula 12 mpe mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá. (Marko 5:41, 42; Luka 7:12-15) Na nsima, Lazare, oyo azalaki moninga ya Yesu, akufaki. Atako Lazare akufaki mpe esalaki mikolo minei banda bakundaki ye, Yesu azongisaki ye na bomoi. Yesu abondelaki Nzambe mpe na nsima agangaki liboso ya lilita: “Lazare, bimá!” Mpe “moto oyo akufaki abimaki.” Lazare azongaki na bomoi! (Yoane 11:43, 44) Kanisá esengo oyo bandeko mpe baninga ya Lazare bazalaki na yango!

3. Elikya nini ezali mpo na baninga mpe bandeko na biso oyo bakufá?

Biblia elaki ete: “Lisekwa ekozala.” (Misala 24:15) Bato oyo Yesu asekwisaki bakendaki likoló te. (Yoane 3:13) Bazalaki na esengo ya kozonga na bomoi awa na mabele. Ndenge moko mpe, etikali moke Yesu asekwisa bamiliare ya bato mpo bázala na bomoi libela na libela na Paradiso awa na mabele. Alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita,” ezala mpe baoyo bato babosaná bango kasi lokola Nzambe abosaná bango te, bakosekwa.​—Yoane 5:28, 29.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba na Biblia makambo oyo endimisi yo ete Yesu azali na nguya ya kosekwisa bato mpe akosala yango. Luká koyeba mpe ndenge oyo lisekwa ekoki kobɔndisa yo mpe kopesa yo elikya.

4. Yesu amonisaki polele ete akoki kosekwisa bato oyo bakufá

Luká koyeba makambo mosusu oyo Yesu asalaki mpo na moninga na ye Lazare. Tángá Yoane 11:14, 38-44, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini toyebi ete Lazare akufaki mpenza?​—Talá vɛrsɛ 39.

  • Okanisi nini: Soki Lazare akendaki na likoló, Yesu alingaki kozongisa ye na bomoi awa na mabele?

Talá VIDEO.

5. Bato ebele bakosekwa!

Tángá Nzembo 37:29, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bamilio ya bato oyo bakosekwa bakofanda wapi?

Yesu akosekwisa bato mingi, ata mpe baoyo bazalaki kosambela Yehova te. Tángá Misala 24:15, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nani okolinga azonga na bomoi?

Yesu akoki kosekwisa moto kaka ndenge tata akoki kolamwisa mwana na ye na mpɔngi

6. Lisekwa ekoki kobɔndisa yo mpe kopesa yo elikya

Lisolo ya mwana ya Yairuse ebɔndisaka bato mingi oyo bazali na mpasi mpo ndeko to moninga na bango moko akufi mpe epesaka bango makasi. Tángá lisolo yango na Luka 8:40-42, 49-56.

Liboso ya kosekwisa mwana ya Yairuse, Yesu ayebisaki Yairuse boye: “Kobanga te, monisá kaka kondima.” (Talá vɛrsɛ 50.) Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kosalisa yo . . .

  • ntango moto oyo olingaka akufi?

  • ntango bomoi na yo ezali na likama?

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Ndenge nini elikya ya lisekwa ebɔndisaki mpe epesaki baboti ya Phelicity makasi?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nandimaka te ete bato oyo bakufá bakozonga na bomoi.”

  • Okoyebisa ye nini?

  • Vɛrsɛ nini okoki kosalela mpo na komonisa ete lisekwa ekozala mpenza?

NA MOKUSE

Biblia elaki ete bamiliare ya bato oyo bakufá bakozonga na bomoi. Yehova alingi ete bázonga lisusu na bomoi, mpe apesi Yesu nguya ya kosekwisa bango.

Bozongeli

  • Yehova ná Yesu bayokaka ndenge nini mpo na likambo etali kosekwisa bato oyo bakufá?

  • Bamiliare ya bato oyo bakosekwa bakofanda na likoló to awa na mabele? Mpo na nini olobi bongo?

  • Nini endimisi yo ete bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bakoki kozonga na bomoi?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba makambo oyo okoki kosala mpo na kokitisa mpasi oyo liwa epesaka.

“Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa” (Lamuká! No. 3 2018)

Batoli ya Biblia ekoki mpenza kosalisa moto oyo ndeko to moninga na ye akufi?

Ntango moto olingaka akufi (5:06)

Ndenge nini bana bakoki kolonga mpasi ya liwa ya moto oyo balingaka?

Lisiko (2:07)

Ezali na bato oyo bakosekwa mpo na kokende na likoló? Banani bakosekwa te?

“Lisekwa ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)