Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 31

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Biblia elobeli mingimingi nsango oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Yehova akosalela Bokonzi yango mpo na kokómisa mabele Paradiso. Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ndenge nini toyebi ete ezali koyangela sikoyo? Makambo nini esí esali? Mpe makambo nini ekosala na mikolo ezali koya? Liteya oyo mpe mateya mibale oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.

1. Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe nani nde Mokonzi na yango?

Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo Yehova Nzambe atye. Yesu Kristo nde Mokonzi na Bokonzi yango mpe azali koyangela uta na likoló. (Matai 4:17; Yoane 18:36) Biblia elobi ete Yesu “akoyangela . . . libela na libela.” (Luka 1:32, 33) Lokola Yesu azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, akoyangela bato nyonso awa na mabele.

2. Yesu akoyangela elongo na banani?

Yesu akoyangela ye moko te. Biblia elobi ete “bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso . . . bakoyangela mabele.” (Emoniseli 5:9, 10) Bato boni bakoyangela elongo na Kristo? Banda ntango Yesu azalaki awa na mabele, bamilio ya bato bakómá bayekoli na ye. Bango nyonso nde bakoyangela elongo na ye? Te! Kaka bato 144 000 nde bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (Tángá Emoniseli 14:1-4.) Bakristo mosusu nyonso awa na mabele bakozala bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.​—Nzembo 37:29.

3. Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe eleki baguvɛrnema ya mokili?

Atako bakonzi mosusu ya mokili balukaka kosala makambo ya malamu, bazalaka te na nguya ya kosala nyonso oyo balingi. Mpe bakonzi oyo bazwaka esika na bango, balukaka mbala mosusu kaka bolamu na bango moko mpe balingaka kosalisa bato te. Kasi moto moko te akozwa esika ya Yesu, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Biblia elobi ete Nzambe atye “bokonzi moko oyo ekobebisama te.” (Danyele 2:44) Yesu akoyangela mabele mobimba, mpe akosalela bato nyonso makambo kozanga kopona bilongi. Azali na bolingo, na boboto, mpe na bosembo; akoteya bato básalela basusu makambo na bolingo, na boboto mpe na bosembo.​—Tángá Yisaya 11:9.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mpo na nini Bokonzi ya Nzambe eleki baguvɛrnema nyonso ya mokili.

4. Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba

Bokonzi oyo Yesu Kristo azali na yango eleki ya bakonzi nyonso ya mokili. Tángá Matai 28:18, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini bokonzi oyo Yesu azali na yango eleki oyo ya bakonzi nyonso ya mokili?

Baguvɛrnema ya bato ebongwanaka mbala mingi, mpe mokonzi mokomoko ayangelaka kaka mwa eteni moko ya mabele. Tokoloba nini mpo na Bokonzi ya Nzambe? Tángá Danyele 7:14, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini ezali malamu ndenge Bokonzi ya Nzambe “ekobebisama te”?

  • Mpo na nini ebongi ete Bokonzi yango eyangela mabele mobimba?

5. Bokonzi ya Nzambe esengeli kozwa esika ya baguvɛrnema ya mokili

Mpo na nini? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Baguvɛrnema ya mokili ebimiselá bato makambo nini?

Tángá Mosakoli 8:9, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini: Bokonzi ya Nzambe esengeli kozwa esika ya baguvɛrnema ya mokili? Mpo na nini?

6. Bato oyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe bayebi biso malamu

Lokola Mokonzi na biso Yesu akómaki moto mpe afandaki awa na mabele, akoki “koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso.” (Baebre 4:15) Basi mpe mibali ya sembo 144 000 oyo bakoyangela elongo na Yesu bauti “na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso.”​—Emoniseli 5:9.

  • Koyeba ete Yesu ná bato nyonso oyo bakoyangela elongo na ye bayebi bato malamu, ekitisi yo motema? Mpo na nini?

Yehova aponi basi mpe mibali na bikólo nyonso mpo báyangela elongo na Yesu

7. Mibeko ya Bokonzi ya Nzambe eleki mibeko ya baguvɛrnema nyonso ya mokili

Baguvɛrnema ya mokili etyaka mibeko oyo bakanisaka ete ekobatela bato mpe ekomemela bango bolamu. Bokonzi ya Nzambe mpe etyá mibeko oyo bato oyo yango ekoyangela basengeli kolanda. Tángá 1 Bakorinti 6:9-11, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini: Mokili elingaki kozala ndenge nini soki bato nyonso bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe? a

  • Mpo na yo, ebongi mpenza ete Yehova asɛnga bato oyo bazali na nse ya Bokonzi na ye bátosa mibeko na ye? Mpo na nini?

  • Nini emonisi ete bato oyo bazali kotosa mibeko yango te bakoki kobongwana?​—Talá vɛrsɛ 11.

Baguvɛrnema ya mokili etyaka mibeko mpo ebatela bato mpe ememela bango bolamu. Bokonzi ya Nzambe etyá mibeko ya malamu koleka mpo na kobatela bato oyo yango ekoyangela mpe mpo na bolamu na bango

SOKI MOTO ATUNI YO: “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?”

  • Okopesa eyano nini?

NA MOKUSE

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solosolo oyo ezali na likoló mpe ekoyangela mabele mobimba.

Bozongeli

  • Banani bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe?

  • Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe eleki baguvɛrnema nyonso ya mokili?

  • Makambo nini Yehova azali kosɛnga na bato oyo Bokonzi na ye ekoyangela?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá oyo Yesu alobaki mpo na esika oyo Bokonzi yango ezali.

“Bokonzi ya Nzambe ezali na motema na yo?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Mpo na nini Batatoli ya Yehova baponaka kotikala sembo na Bokonzi ya Nzambe na esika ya kolanda baguvɛrnema ya mokili?

Bato oyo bamipesi mpo na Bokonzi ya Nzambe (1:43)

Luká koyeba makambo oyo Biblia elobi mpo na bato 144 000 oyo Yehova aponi mpo báyangela elongo na Yesu.

“Nani akokende na likoló?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Nini endimisaki mwasi moko oyo azalaki na bolɔkɔ ete kaka Nzambe nde akoki kosala ete bosembo ezala na mokili?

“Nayaki koyeba ete makambo ya kozanga bosembo ekosila” (Lamuká ya 11/2011)

a Tokolobela mibeko yango mosusu na Eteni 3.