Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 32

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na mobu 1914. Na ntango yango mpe mikolo ya nsuka ya boyangeli ya bato ebandaki. Ndenge nini toyebi yango? Tótalela makambo oyo Biblia esakolaki, makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe bizaleli oyo bato bakómá na yango banda 1914.

1. Biblia esakolaki nini?

Mokanda ya Danyele emonisi ete Bokonzi ya Nzambe esengelaki kobanda koyangela na nsuka ya eleko oyo ebengami “ntango nsambo.” (Danyele 4:16, 17) Basiɛklɛ na nsima, Yesu abengaki eleko yango “bantango oyo etyamá ya bikólo,” mpe ateyaki ete eleko yango esukaki naino te. (Luka 21:24) Ndenge tokomona yango, bantango nsambo yango esukaki na 1914.

2. Makambo nini ezali kosalema na mokili mpe bizaleli nini bato bakómi na yango banda 1914?

Bayekoli ya Yesu batunaki Yesu boye: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Yesu ayebisaki bango makambo mingi oyo ekosalema ntango akokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe mpe akobanda koyangela na likoló. Na kati ya makambo yango, tokoki kotánga: bitumba, nzala, mpe koningana ya mabele. (Tángá Matai 24:7.) Biblia esakolaki mpe bizaleli oyo bato bakozala na yango na “mikolo ya nsuka,” oyo ekosala ete bomoi ekóma “mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1-5) Makambo yango mpe bizaleli yango ekómaki komonana polele mingimingi banda 1914.

3. Mpo na nini mokili ebebá makasi banda Bokonzi ya Nzambe ebandá koyangela?

Mwa moke nsima ya kokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, Yesu abundaki na Satana ná bademo na likoló. Kasi, Satana alongaki etumba yango te. Biblia elobi ete ‘abwakamaki na mabele, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye.’ (Emoniseli 12:9, 10, 12) Satana azali na nkanda makasi mpo ayebi ete akobomama. Yango wana abimisaka bampasi mpe minyoko na mabele mobimba. Yango nde ntina oyo mokili ebebá makasi. Kasi Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bampasi yango nyonso.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mpo na nini tolobi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914, mpe soki yango etali yo na nini.

4. Badati oyo Biblia epesi emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914

Na ndɔtɔ moko, Nzambe alakisaki Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone ya kala, makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo ezali koya. Ndimbola oyo Danyele apesaki na ndɔtɔ yango emonisi ete ndɔtɔ yango etali boyangeli ya Nebukadenezare mpe Bokonzi ya Nzambe.​—Tángá Danyele 4:17. a

Tángá Danyele 4:20-26, mpe na nsima salelá etanda mpo na koyanola na mituna oyo elandi:

  • (A) Nebukadenezare alɔtaki nini?​—Talá vɛrsɛ 20 mpe 21.

  • (B) Nini esengelaki kokómela nzete yango?​—Talá vɛrsɛ 23.

  • (C) Nini esengelaki kosalema na nsuka ya “ntango nsambo”?​—Talá vɛrsɛ 26.

Boyokani oyo ezali kati na nzete ya ndɔtɔ ná Bokonzi ya Nzambe

ESAKWELI (Danyele 4:20-36)

Bokonzi

(A) Nzete moko ya monene

Bokonzi esuki

(B) “Bókata nzete yango,” mpe ‘elekisa ntango nsambo’

Bokonzi ezongisami

(C) “Okozongela bokonzi na yo”

Na kokokisama ya liboso . . .

  • (D) Nzete yango emonisi nani?​—Talá vɛrsɛ 22.

  • (E) Ntango nini bokonzi na ye esukaki?​—Tángá Danyele 4:29-33.

  • (F) Nini ekómelaki Nebukadenezare na nsuka ya “ntango nsambo”?​—Tángá Danyele 4:34-36.

KOKOKISAMA YA LIBOSO

Bokonzi

(D) Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone

Bokonzi esuki

(E) Nsima ya 606 L.T.B., Nebukadenezare abungisaki mayele ya bomoto mpe akokaki lisusu kozala mokonzi te na boumeli ya mbula nsambo

Bokonzi ezongisami

(F) Nebukadenezare azongeli mayele ya bomoto mpe azongeli bokonzi na ye

Na kokokisama ya mibale . . .

  • (G) Nzete yango emonisi banani?​—Tángá 1 Ntango 29:23.

  • (H) Ntango nini bokonzi na bango esukaki? Ndenge nini toyebi ete bokonzi yango ezongisamaki te tii ntango oyo Yesu azalaki awa na mabele?​—Tángá Luka 21:24.

  • (I) Ntango nini mpe esika nini bokonzi yango ezongisamaki?

KOKOKISAMA YA MIBALE

Bokonzi

(G) Bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe

Bokonzi esuki

(H) Yerusaleme ebebisami, mpe yango ekataki molɔngɔ ya bakonzi ya Yisraele na boumeli ya bambula 2 520

Bokonzi ezongisami

(I) Yesu abandi koyangela na likoló lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe

Ntango nsambo eumelaki bambula boni?

Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia esalisaka biso tóyeba malamumalamu bavɛrsɛ mosusu. Na ndakisa, mokanda ya Emoniseli elobi ete ntango misato ná ndambo ezali mikolo 1 260. (Emoniseli 12:6, 14) Na yango, mbula nsambo ezali mikolo 1 260 mbala mibale, to mikolo 2 520. Ntango mosusu na Biblia, maloba “mokolo moko” emonisaka mbula moko. (Ezekiele 4:6) Na yango, ntango nsambo oyo mokanda ya Danyele elobeli ezali bambula 2 520.

5. Mokili ebongwaná banda 1914

Yesu asakolaki makambo oyo ekomonana polele na mokili ntango akokóma Mokonzi. Tángá Luka 21:9-11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Na makambo oyo Yesu asakolaki, makambo nini ozali komona to koyoka?

Ntoma Paulo amonisaki ndenge bizaleli ya bato ekozala na mikolo ya nsuka ya boyangeli ya bato. Tángá 2 Timote 3:1-5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bizaleli nini ozali komona lelo epai ya bato?

6. Koyeba ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela esengeli kopesa biso makasi

Tángá Matai 24:3, 14, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mosala nini ya ntina mingi emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela?

  • Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango?

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela, mpe etikali moke eyangela mabele mobimba. Tángá Baebre 10:24, 25, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mokomoko na biso asengeli kosala nini lokola “tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma”?

Soki oyebi likambo moko oyo ekosalisa basusu mpe ekobikisa bomoi na bango, okosala nini?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete 1914 ezali mbula moko ya ntina mingi?”

  • Okopesa eyano nini?

NA MOKUSE

Bisakweli ya Biblia, badati, mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela sikoyo. Tokomonisa ete tondimaka likambo yango soki tozali kosakola nsango ya Bokonzi yango mpe tozali koyangana na makita ya lisangá.

Bozongeli

  • Nini esalemaki na nsuka ya ntango nsambo oyo mokanda ya Danyele elobeli?

  • Nini endimisi yo ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914?

  • Ndenge nini okoki komonisa ete ondimaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá makambo oyo bato ya istware mpe bato mosusu balobi mpo na mbongwana oyo esalemi na mokili banda 1914.

“Ntango nini bizaleli ya bato ekómaki mpenza kobeba?” (Lamuká! ya 04/2007)

a Talá  masolo mibale ya nsuka oyo ezali na eteni “Makanisi mosusu” ya liteya oyo.