Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 37

Biblia elobi nini mpo na mosala mpe mbongo

Biblia elobi nini mpo na mosala mpe mbongo

Ekómelá yo omitungisa mpo na mosala mpe mbongo? Ekoki kozala mpasi kokokisa bamposa na yo mpe kosambela Yehova ndenge alingaka. Biblia epesi batoli oyo ebongi, oyo ekoki kosalisa biso.

1. Biblia elobi nini mpo na mosala?

Nzambe alingi tósepela na mosala na biso. Biblia elobi ete “eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka . . . komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.” (Mosakoli 2:24) Yehova asalaka mosala makasi. Soki tomekoli ye, elingi koloba, tozali kosala mosala makasi, tokosepelisa ye mpe biso moko tokosepela.

Mosala ezali na ntina. Kasi tosengeli soki moke te kotika yango ezwa esika ya losambo na biso oyo topesaka Yehova. (Yoane 6:27) Yehova alaki biso ete soki totye mosala na ye na esika ya liboso, akokokisa bamposa na biso.

2. Ndenge nini okoki kotalela mbongo na ndenge oyo ebongi?

Biblia elobi ete “mbongo ebatelaka.” Kasi elobi mpe ete ezali kaka mbongo te nde epesaka esengo. (Mosakoli 7:12) Yango wana elendisi biso ete tólinga mbongo te, kasi ‘tósepela na biloko oyo tozali na yango sikoyo.’ (Tángá Baebre 13:5.) Ntango tozali kosepela na oyo tozali na yango, tokomitungisa te mpo na koluka lisusu mingi. Tokokɔta banyongo te oyo ezangi ntina. (Masese 22:7) Mpe tokokima makama oyo masano ya mbongo ebimisaka, mpe tokokɔta te na mimbongo ya lokuta oyo balaki biso ete tokokóma bazwi noki.

3. Ndenge nini tokoki kosalela mbongo na biso na ndenge ya malamu?

Yehova azali Nzambe oyo akabaka, biso mpe tomekolaka ye ntango tozali “lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato oyo bayebi kokaba.” (1 Timote 6:18) Tokoki kosalela mbongo na biso na ndenge ya malamu ntango tozali kopesa makabo na lisangá mpe kosalisa baoyo bazali na mpasi, mingimingi bandeko na biso bakristo. Na miso ya Yehova, oyo eleki ntina ezali makanisi oyo etindi biso tópesa, kasi te mbongo boni oyo topesi. Soki tozali kokaba to kopesa na motema na biso mobimba, tokozala na esengo mpe tokosepelisa Yehova.​​—Tángá Misala 20:35.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba bolamu oyo okozwa soki otye mosala na esika na yango mpe ozali kosepela na oyo ozali na yango.

4. Kumisá Yehova na mosala na yo

Ndenge oyo totalelaka mosala emonisaka soki boninga na biso ná Yehova ezali malamu to te. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, nini ebendi likebi na yo na ndenge Jason azalaki kotalela mosala mpe makambo oyo azalaki kosala na mosala?

  • Asalaki nini mpo akoba kotya mosala na esika na yango?

Tángá Bakolose 3:23, 24, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ndenge oyo totalelaka mosala ezali na ntina?

Mosala ezali na ntina. Kasi tosengeli soki moke te kotika yango ezwa esika ya losambo na biso oyo topesaka Yehova

5. Kosepela na oyo tozali na yango ememaka bolamu

Bato mingi basalaka nyonso mpo kaka bázala na mbongo mingi. Kasi Biblia epesi toli mosusu. Tángá 1 Timote 6:6-8, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Biblia elendisi biso tósala nini?

Ata soki tozali na mbongo mingi te, tokoki kozala na esengo. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Atako mabota yango ezali na mbongo mingi te, nini ezali kopesa bango esengo?

Sikoyo tokoloba nini soki tozali na mbongo mingi kasi tozali koluka kaka kobakisa? Yesu abɛtaki lisolo moko oyo emonisi ete kosala bongo ezali likama. Tángá Luka 12:15-21, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Liteya nini ozwi na lisolo oyo Yesu abɛtaki?​​—Talá vɛrsɛ 15.

Tángá Masese 10:22 mpe kokanisá yango na 1 Timote 6:10. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na yo, nini eleki ntina: Kozala na mbongo mingi to kozala moninga ya Yehova? Mpo na nini?

  • Koluka kaka kokóma na mbongo mingi ebimisaka mikakatano nini?

6. Yehova akokokisa bamposa na biso

Tokomonisa ete totyelaka Yehova motema to te ntango tozangi mosala to mbongo mpo na kokokisa bamposa na biso. Talá VIDEO mpo na komona oyo tokoki kosala ntango tozali na mikakatano yango, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, mikakatano nini ndeko na biso akutanaki na yango?

  • Asalaki nini mpo alonga mikakatano yango?

Tángá Matai 6:25-34, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yehova alaki nini na baoyo batyaka mosala na ye na esika ya liboso?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nasengeli kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na ngai. Nakokoka te koyanganaka na makita pɔsɔ nyonso.”

  • Vɛrsɛ nini endimisi yo ete kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso ezali ekateli oyo eleki malamu?

NA MOKUSE

Mosala mpe mbongo ezali na ntina, kasi esengeli ata moke te kolongola likebi na biso na mosala ya Yehova.

Bozongeli

  • Nini ekoki kosalisa yo otalela mosala na ndenge oyo ebongi?

  • Kosepela na oyo ozali na yango ekomemela yo bolamu nini?

  • Ndenge nini okoki komonisa ete ondimaka elaka oyo Yehova apesi ya kokokisa bamposa ya basaleli na ye?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba ndenge oyo tokoki kosalela mbongo na biso mpo na kosepelisa Nzambe.

“Bibia elobi nini na likambo etali kokaba?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá oyo esalisaki moto moko atika kobɛta masano ya mbongo mpe koyiba.

“Nalingaki mingi masano ya mpunda.” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2011)