Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 38

Zalá na botɔndi mpo na bomoi, likabo oyo Yehova apesá biso

Zalá na botɔndi mpo na bomoi, likabo oyo Yehova apesá biso

Lokola tozali na bomoi, tokoki kosala mpe kosepela na makambo ndenge na ndenge. Tokoki kosepela na makambo mosusu ya bomoi ata ntango tozali na mikakatano. Ndenge nini tokoki komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na bomoi, likabo oyo apesá biso? Wapi ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kosala yango?

1. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na bomoi?

Tosengeli kozala na botɔndi mpo na bomoi, mpo ezali likabo oyo Tata na biso ya bolingo, Yehova, apesá biso. Azali “liziba ya bomoi,” elingi koloba, ye nde asalá bomoi. (Nzembo 36:9) Biblia elobi ete: “Apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:25, 28) Yehova apesi biso nyonso oyo tozali na yango mposa mpo tózala na bomoi. Asali mpe ete tósepela na bomoi.​​—Tángá Misala 14:17.

2. Ndenge nini tokoki komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na bomoi, likabo oyo apesá biso?

Yehova azwaka bomoi na yo na motuya mingi banda ntango oyo ozalaki na libumu ya mama. Biblia elobeli libondeli moko oyo Davidi asalaki; alobaki na Yehova ete: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki.” (Nzembo 139:16) Yehova azwaka bomoi na yo na valɛrɛ mingi. (Tángá Matai 10:29-31.) Esalaka Yehova mpasi soki moto amibomi to abomi moto mosusu. a (Kobima 20:13) Esalaka ye mpe mpasi soki totye bomoi na biso na likama kaka mpamba to tosali eloko te mpo na kobatela bomoi ya basusu. Soki tozali kobatela bomoi na biso mpe ya basusu, tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na bomoi, likabo kitoko oyo Yehova apesá biso.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo oyo okoki kosala mpo na komonisa Yehova ete ozali na botɔndi mpo na bomoi, likabo oyo apesá yo.

3. Batelá bokolɔngɔnɔ ya nzoto

Lokola tomipesá epai ya Yehova, tosalelaka ye bomoi na biso mobimba. Ezali lokola topesá nzoto na biso mbeka epai ya Nzambe. Tángá Baroma 12:1, 2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini osengeli kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo?

  • Ndenge nini okoki kosala yango?

4. Salá keba mpo likama to liwa ebima te

Biblia elendisi biso ete tóboya makambo oyo ekoki kotya bomoi na likama. Talá VIDEO mpo na koyeba makambo oyo okoki kosala mpo na komibatela.

Tángá Masese 22:3, mpe na nsima lobelá ndenge oyo yo ná basusu bokoki komibatela . . . 

  • na ndako.

  • na esika ya mosala.

  • ntango bozali kosala masano.

  • ntango bazali komema bino to bozali komema bato mosusu na motuka, tukutuku, velo, to bwato.

5. Zwá na valɛrɛ bomoi ya mwana oyo azali naino na libumu

Davidi alobaki ete Yehova alandelaka mpenza makambo nyonso oyo esalemaka ntango mwana azali kokola na libumu ya mama. Tángá Nzembo 139:13-17, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Na miso ya Yehova, bomoi ebandaka ntango mwana azali na libumu ya mama to ntango abotami?

Mibeko oyo Yehova apesaki bana ya Yisraele ezalaki kobatela mwasi ya zemi mpe mwana oyo azali na libumu na ye. Tángá Kobima 21:22, 23, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini Yehova azalaki kotalela moto oyo abomi na nko te mwana oyo azali naino na libumu?

  • Yehova ayokaka ndenge nini ntango moto moko asali yango na nko? b

  • Ndenge oyo Yehova atalelaka likambo yango, esali yo nini?

Talá VIDEO.

Makambo mosusu ekoki kosala ete ata mwasi oyo azwaka bomoi na valɛrɛ amona ete asengeli kaka kolongola zemi. Tángá Yisaya 41:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Soki bazali kotya mwasi moko mbamba alongola zemi, asengeli kosɛnga lisalisi epai ya nani? Mpo na nini?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Mwasi ye moko nde asengeli kopona soki akolongola zemi to te mpo ezali nzoto na ye moko.”

  • Nini endimisi yo ete Yehova azwaka na valɛrɛ bomoi ya mama mpe ya mwana oyo azali na libumu na ye?

NA MOKUSE

Biblia eteyi biso ete tólinga mpe tóbatela bomoi, likabo oyo Yehova apesá biso, yango elingi koloba bomoi na biso mpe oyo ya basusu.

Bozongeli

  • Mpo na nini bomoi ya bato ezali na valɛrɛ mingi na miso ya Yehova?

  • Yehova ayokaka ndenge nini ntango moto abomi moto mosusu na nko?

  • Mpo na nini ozali na botɔndi mpo na bomoi, likabo oyo Yehova apesá biso?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Ndenge nini tokoki kopesa Yehova matɔndi mpo na bomoi, likabo oyo apesá biso?

Loyembo 141​​—Bomoi ezali likamwisi (2:41)

Zwá eyano na motuna oyo: Nzambe akoki kolimbisa mwasi oyo alongolá zemi?

“Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá ndenge oyo Yehova atalelaka bomoi esengeli kotinda yo opona masano ya malamu.

“‘Masano oyo etyaka bomoi na likama’​—Osengeli kosala yango?” (Lamuká! ya 08/10/2000)

a Yehova akipaka mpenza bato oyo bazoki na motema. (Nzembo 34:18) Ayebaka malamu mpasi oyo etindaka moto akóma na makanisi ya komiboma, mpe alingaka kosalisa ye. Mpo na koyeba ndenge oyo Yehova asalisaka moto azwa makasi mpe alonga makanisi ya komiboma, tángá lisolo “Nazali na mposa ya kokufa​​—Biblia ekoki kosalisa ngai ntango nazali na makanisi ya komiboma?” oyo ezali na eteni “Makanisi mosusu” ya liteya oyo.

b Baoyo balongolá zemi basengeli te komipesa foti koleka ndelo, mpo Yehova akoki kolimbisa bango. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?” oyo ezali na eteni “Makanisi mosusu” ya liteya oyo.