Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 40

Ndenge oyo tosengeli kozala pɛto na miso ya Nzambe

Ndenge oyo tosengeli kozala pɛto na miso ya Nzambe

Kanisá ete mama moko oyo alingaka mwana na ye azali kobongisa ye mpo akende kelasi. Asukoli ye mpe alatisi ye bilamba ya pɛto. Yango ekosala ete mwana yango azala na nzoto ya malamu mpe ekomonisa ete baboti na ye bakipaka ye malamu. Ndenge moko mpe Yehova, Tata na biso ya bolingo, alingaka tózala pɛto na nzoto mpe na makanisi. Soki tozali pɛto, ekosalisa biso na makambo mingi mpe ekopesa ye lokumu.

1. Ndenge nini tokoki kozala pɛto na nzoto?

Yehova ayebisi biso ete: “Bosengeli kozala basantu.” (1 Petro 1:16) Mpo na kozala basantu tosengeli kozala pɛto na makanisi mpe na nzoto. Mpo tózala pɛto na nzoto, tosengeli kosukola mbala na mbala mpe kosala ete bilamba na biso, ndako na biso, mpe motuka na biso ezala pɛto. Tosengeli mpe kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Soki tozali pɛto na nzoto, tokopesa Yehova lokumu.​​—2 Bakorinti 6:3, 4.

2. Makambo nini tosengeli koboya mpo tózala pɛto?

Biblia eyebisi biso “tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.” (2 Bakorinti 7:1) Yango elingi koloba ete tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekobebisa nzoto na biso mpe makanisi na biso. Lokola makanisi na biso esengeli kosepelisa Yehova, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tóboya makanisi mabe. (Nzembo 104:34) Tosalaka mpe makasi tózala na maloba ya pɛto.​​—Tángá Bakolose 3:8.

Makambo nini mosusu ekoki kokómisa nzoto mpe makanisi na biso mbindo? Biloko mosusu ekoki kobebisa nzoto na biso. Yango wana, tomɛlaka te makaya to bilangwiseli mosusu. Tosalelaka mpe te bankisi mosusu kaka mpo tólongwa. Tosalaka bongo mpo nzoto na biso ezala malamu mpe tómonisa ete tozwaka bomoi na valɛrɛ mingi. Tosalaka makasi tótikala pɛto na makanisi na ndenge toboyaka makambo lokola: Kosimbasimba enama ya kobotela mpo na koyoka elɛngi mpe kotala pornografi. (Nzembo 119:37; Baefese 5:5) Ekoki kozala mpasi kotika makambo wana, kasi Yehova akoki kosalisa biso.​​—Tángá Yisaya 41:13.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ntina oyo kozala pɛto ekumisaka Yehova. Luká koyeba mpe oyo okoki kosala mpo na kotika kosala makambo ya mbindo.

3. Kozala pɛto na nzoto ekumisaka Yehova

Soki totángi mibeko oyo Yehova apesaki ekólo Yisraele, tokomona ntina oyo alingaka ete basaleli na ye bázala pɛto. Tángá Kobima 19:10 mpe 30:17-19, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela bavɛrsɛ oyo, ndenge nini Yehova atalelaka bopɛto ya nzoto?

  • Nini ekoki kosalisa yo ozala ntango nyonso pɛto na nzoto?

Mpo moto azala pɛto na nzoto esɛngaka ntango mpe esɛngaka asala makasi. Kasi tokoki kozala pɛto na nzoto ata soki tofandi wapi mpe tozali na bozwi to te. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Bato oyo toteyaka bakosala nini soki bamoni ete tozali pɛto?

4. Tiká bizaleli mabe

Yehova akoki kosalisa biso tótika ezaleli nyonso ya mabe

Soki omɛlaka makaya to bilangwiseli mosusu, okoki komona ete ezali mpasi kotika yango. Kasi nini ekoki kosalisa yo? Luká koyeba makama oyo biloko yango ekomemela yo. Tángá Matai 22:37-39, mpe na nsima lobelá likambo oyo makaya to bilangwiseli mosusu ekoki kosala na  . . .

  • boyokani ya moto ná Yehova.

  • libota mpe baninga na ye.

Salá nyonso otika bizaleli ya mabe. a Talá VIDEO.

Tángá Bafilipi 4:13, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini kobondela mbala na mbala, koyekola Biblia, mpe koyangana na makita ekoki kosalisa moto atika ezaleli ya mabe?

5. Salá makasi oboya makanisi mpe makambo ya mabe

Tángá Bakolose 3:5, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini toyebi ete pornografi, kotindela moto bamesaje, bafɔtɔ to bavideo ya makambo ya kosangisa nzoto, mpe kosimbasimba enama ya kobotela mpo na koyoka elɛngi ezali mabe na miso ya Yehova?

  • Okanisi nini: Ebongi mpenza Yehova asɛnga biso tózala pɛto na makanisi? Mpo na nini?

Talá ndenge okoki kobundisa makanisi ya mbindo. Talá VIDEO.

Yesu apesaki ndakisa moko mpo na komonisa ete tosengeli kosala nyonso mpo tózala pɛto na makanisi. Tángá Matai 5:29, 30, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yesu alobaki te ete tosengeli komisala mabe, kasi alingaki nde koloba ete tosengeli kosala mwa likambo. Likambo nini moto asengeli kosala mpo na koboya makanisi mabe? b

Soki ozali kobunda mpo na kotika makanisi ya mbindo, yebá ete Yehova azali kosepela ndenge ozali kosala makasi. Tángá Nzembo 103:13, 14, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Soki ozali kobunda mpo na kotika ezaleli moko ya mbindo, ndenge nini vɛrsɛ oyo esalisi yo olɛmba te?

Kotika te!

Mbala mosusu okoki koloba boye: ‘Lokola nazali kokoka te, natika na ngai.’ Kasi kanisá likambo oyo: Soki moto oyo azali kokima mbangu abɛti libaku mpe akwei, yango emonisi ete akolonga momekano te to akozongela momekano na ebandeli? Ndenge moko mpe soki ozali kokwea, yango emonisi te ete okolonga te kotika bizaleli ya mabe. Okoki kaka kosepela na ndenge ozali kosala makasi. Soki okwei kolɛmba nzoto te. Ezali komonisa ete ozali kosala makasi ya kokende liboso. Kotika te! Na lisalisi ya Yehova, okolonga ezaleli yango ya mabe.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Namesaná na makambo yango. Nakokoka kotika te.”

  • Vɛrsɛ nini okoki kosalela mpo na komonisa ye ete Yehova akoki kosalisa ye atika ezaleli wana ya mabe?

NA MOKUSE

Tosepelisaka Yehova ntango tozalaka pɛto na nzoto, na makanisi, mpe na bizaleli na biso.

Bozongeli

  • Mpo na nini kozala pɛto ezali na ntina?

  • Ndenge nini okoki kozala pɛto na nzoto?

  • Ndenge nini okoki kobatela makanisi mpe bizaleli na yo pɛto?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Makambo nini okoki kosala mpo ozala pɛto ata soki ozali na bozwi te?

Bopɛto mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto​​—kosukola mabɔkɔ (3:01)

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo otika komɛla makaya.

“Ndenge ya kotika likaya” (Lamuká! ya 07/2010)

Talá ndenge moto moko atikaki momesano ya kotala pornografi.

“Ezalaki mpasi natika bomoi na ngai ya kala” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 4 2016)

a Lisolo “Ndenge ya kotika likaya,” oyo ezali na eteni “Makanisi mosusu” ya liteya oyo, elobeli makambo oyo okoki kosala mpo na kotika ezaleli yango.

b Mpo na kotika ezaleli ya kosakana na binama ya kobotela, talá lisolo “Ndenge ya kotika kosakana na binama ya kobotela” na buku Mituna oyo bilenge batunaka​​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1, mokapo 25.