Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 41

Biblia elobi nini na likambo etali kosangisa nzoto?

Biblia elobi nini na likambo etali kosangisa nzoto?

Bato mingi bayokaka nsɔni kolobela likambo etali kosangisa nzoto. Nzokande, ntango Biblia elobelaka likambo yango, elobaka polele, kasi na ndenge oyo ebongi. Makambo oyo Biblia elobi ezali mpo na bolamu na biso. Makambo yango ebongi mpenza mpo Biblia euti epai ya Yehova, Nzambe oyo akelá biso. Ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Ayebisi biso makambo oyo tokoki kosala mpo tósepelisa ye, mpe makambo oyo ekosalisa biso tósepela na bomoi libela na libela.

1. Ndenge nini Yehova atalelaka kosangisa nzoto?

Yehova nde apesá moto binama ya kobotela. Alingi ete mwasi ná mobali oyo babalaná básalela yango mpo na kosangisa nzoto mpe epesa bango esengo. Mwasi ná mobali basangisaka nzoto kaka mpo na kobota bana te, kasi mpe mpo na komoniselana bolingo mpe lolango na ndenge oyo ebongi. Yango wana Liloba ya Nzambe elobi: “Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.” (Masese 5:18, 19) Yehova asɛngi bakristo oyo babalá bázala sembo epai ya balongani na bango, mpo bákwea te na ekobo.​—Tángá Baebre 13:4.

2. Pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo ezali nini?

Biblia eyebisi biso ete “bato ya pite [to oyo basangisaka nzoto na ndenge ya mbindo] . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakorinti 6:9, 10) Bato oyo bakomaki Biblia basalelaki liloba ya Grɛki pornéïa mpo na kolobela pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Yango esangisi makambo lokola: (1) kosangisa nzoto a kati na bato mibale oyo babalani te, (2) kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe (3) kosangisa nzoto ná nyama. Tosepelisaka Yehova mpe tozwaka bolamu ntango ‘toboyaka pite’ to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo.​—1 Batesaloniki 4:3.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge okoki koboya pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo mpe bolamu oyo okozwa soki otikali pɛto na makanisi.

3. Kimá pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo

Yozefe, mobali moko ya sembo aboyaki kosangisa nzoto na mwasi moko. Tángá Ebandeli 39:1-12, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini Yozefe akimaki?​—Talá vɛrsɛ 9.

  • Okanisi nini: Yozefe azwaki ekateli oyo ebongi? Mpo na nini?

Ndenge nini bilenge bakoki komekola Yozefe mpe kokima pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo? Talá VIDEO.

Yehova alingi ete biso nyonso tóboya pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Tángá 1 Bakorinti 6:18, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Makambo nini ekoki komema moto na pite to na makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo?

  • Ndenge nini okoki kokima pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo?

4. Okoki kolonga komekama

Mpo na nini ekoki kozala mpasi moto atika pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, ntango ndeko amonaki ete makanisi mpe makambo oyo azalaki kosala ekoki kosala ete azala sembo te epai ya mwasi na ye, asalaki nini?

Na bantango mosusu, ata bakristo ya sembo basalaka makasi mpo na kobatela makanisi na bango pɛto. Okoki kosala nini mpo otika kokanisa makambo ya mbindo? Tángá Bafilipi 4:8, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Tosengeli kokanisaka makambo nini?

  • Ndenge nini kotánga Biblia mpe komipesa na mosala ya Yehova esalisaka biso tókwea na lisumu te?

5. Mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso

Yehova ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Ayebisi biso oyo tokoki kosala mpo tózala pɛto na makanisi mpe bolamu oyo tokozwa soki tosali bongo. Tángá Masese 7:7-27 to talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Ndenge nini elenge mobali moko atambolaki na nzela oyo ememaki ye na lisumu?​—Talá Masese 7:8, 9.

  • Na kotalela Masese 7:23, 26, pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo ekoki komema makama ya minene. Soki totikali pɛto na makanisi, makambo nini ya mabe ekokómela biso te?

  • Ndenge nini makanisi ya pɛto ekoki kosalisa biso tósepela na bomoi libela na libela?

Bato mosusu bakanisaka ete makambo oyo Nzambe alobi na Biblia mpo na kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi emonisi ete azangi bolingo. Kasi Yehova azali Nzambe ya bolingo mpe alingi ete moto nyonso asepela na bomoi libela na libela. Mpo na kozwa bomoi yango, tosengeli kotosa mibeko na ye. Tángá 1 Bakorinti 6:9-11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Na miso ya Nzambe, kaka kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi nde ezali mabe?

Mpo na kosepelisa Nzambe, biso nyonso tosengeli kobongola bomoi na biso. Kosala bongo ezali mpenza na ntina? Tángá Nzembo 19:8, 11, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini: Mibeko ya Yehova oyo etali bizaleli malamu ebongi mpenza? Mpo na nini?

Yehova asalisi bato mingi bátosa mibeko na ye oyo etali bizaleli malamu. Akoki mpe kosalisa yo

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Kosangisa nzoto ezali na yango mabe te soki bato balingani.”

  • Okoloba nini?

NA MOKUSE

Kosangisa nzoto ezali likabo oyo Yehova apesá mwasi ná mobali oyo babalaná mpo básepela.

Bozongeli

  • Pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo esangisi makambo nini?

  • Nini ekosalisa biso tóboya pite to makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo?

  • Bolamu nini tokozwa soki totosi mibeko ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba ntina oyo Nzambe alingi ete liboso mwasi ná mobali báfanda esika moko basengeli kobalana.

“Biblia elobi nini mpo na libala ya makango?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá mpo na nini mibeko ya Biblia oyo etali kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi emonisi te ete tosengeli koyina bato oyo bazali kosala yango.

“Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá ndenge mibeko ya Nzambe oyo etali kosangisa nzoto ebatelaka biso.

“Kofiba enama ya nzoto ya mwasi to ya mobali ezali mpenza kosangisa nzoto?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Na lisolo “Bapesaki ngai limemya,” talá makambo etindaki mobali moko oyo azalaki kosangisa nzoto na mibali abongola bomoi na ye mpo na kosepelisa Yehova.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2011)

a Yango esangisi makambo ndenge na ndenge, na ndakisa kosangisa nzoto, kofiba to kolɛmbola binama ya kobotela, kosangisa na moto nzoto na esumbeli, mpe kosimbasimba binama ya kobotela ya moto mpo na kolamwisa ye mposa ya kosangisa nzoto.