Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 42

Biblia elobi nini mpo na bonzemba mpe libala?

Biblia elobi nini mpo na bonzemba mpe libala?

Na bamboka mosusu, bato balobaka ete mpo moto azala na esengo asengeli kaka kobala. Kasi, bato nyonso te oyo babalá nde bazalaka na esengo mpe minzemba nyonso te nde bazalaka na mawa. Biblia elobi ete bonzemba (célibat) mpe libala ezali likabo oyo Nzambe apesá bato.

1. Bolamu nini moto akoki kozwa soki azali monzemba?

Biblia elobi ete: “Moto oyo mpe apesi bongɔndɔ na ye na libala asali malamu, kasi oyo apesi yango na libala te akosala malamu koleka.” (Tángá 1 Bakorinti 7:32, 33, 38.) Na ndenge nini moto oyo abali te ‘asali malamu koleka’? Bakristo oyo babali te balukaka te kokokisa mposa ya balongani. Na bongo, bazalaka na bonsomi ya kosala makambo mingi. Basusu bazali na likoki ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Na ndakisa, bakoki kosala mobembo na bamboka mosusu mpo na kosakola nsango malamu. Oyo eleki ntina, bakoki kosalela ntango na bango mpo na kokómisa boninga na bango ná Yehova makasi.

2. Libala oyo endimami na mibeko ya Leta epesaka bolamu nini?

Ndenge moko na bonzemba, libala mpe ememaka bolamu. Biblia elobi ete “bato mibale baleki moto moko.” (Mosakoli 4:9) Bakristo oyo batosaka makambo oyo Biblia elobi na libala na bango bamonaka ete maloba wana ezali mpenza solo. Mwasi ná mobali oyo babalani na ndenge oyo endimami na mibeko ya Leta, balakanaka ete bakomoniselana bolingo, lolango mpe bakopesana lokumu. Yango wana, mbala mingi bamiyokaka ete babatelami malamu koleka mwasi ná mobali oyo bafandi esika moko kozanga ete bábalana. Libala na bango mpe esalaka ete bana bámiyoka ete babatelami malamu.

3. Ndenge nini Yehova atalelaka libala?

Ntango Yehova abalisaki Adama ná Eva alobaki: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye.” (Ebandeli 2:24) Yehova alingi ete mwasi ná mobali oyo babalani, bálingana mpe báfanda elongo bomoi na bango mobimba. Mpe alobi ete mwasi ná mobali bakoki koboma libala kaka soki molongani moko asali ekobo. Soki molongani moko asali ekobo, Yehova apesi molongani mosusu lotomo ya kozwa ekateli ya koboma libala to te. a (Matai 19:9) Yehova andimaka te libala oyo mwasi azali na mibali ebele to oyo mobali azali na basi ebele.​—1 Timote 3:2.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge oyo okoki kozala na esengo mpe ndenge oyo okosepelisa Yehova ezala obalá to te.

4. Salelá malamu bonzemba na yo

Yesu azalaki komona bonzemba lokola likabo. (Matai 19:11, 12) Tángá Matai 4:23, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini Yesu asalelaki likabo ya bonzemba mpo na kosalela Tata na ye mpe kosalisa basusu?

Bakristo bakozala na esengo soki basaleli bonzemba na bango malamu lokola Yesu. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Lolenge nini ya malamu bakristo bakoki kosalela bonzemba na bango?

Oyebaki yango?

Biblia epesi te mbula oyo moto asengeli kobala. Kasi elendisi bilenge bázela tii “eleko ya ebandeli ya bolenge” ekoleka, elingi koloba, ntango oyo mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mpo yango ekoki kosala ete bázwa bikateli ya mabe.​—1 Bakorinti 7:36.

5. Poná malamu molongani na yo

Kopona molongani ezali ekateli ya ntina mingi oyo moto akoki kozwa. Tángá Matai 19:4-6, 9, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini mokristo asengeli kokanisa malamu liboso ya kobala?

Biblia ekoki kosalisa yo oyeba bizaleli oyo esalaka ete moto azala molongani malamu. Likambo eleki ntina, luká kobalana na moto oyo azali mokristo mpe alingaka Yehova. b Tángá 1 Bakorinti 7:39 mpe 2 Bakorinti 6:14. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini tosengeli kobalana kaka na mokristo?

  • Okanisi nini: Yehova ayokaka ndenge nini soki toponi kobalana na moto oyo alingaka ye te?

Soki bakangisi esika moko banyama mibale oyo bazali ndenge moko te mpo na kosala bilanga ekonyokwama. Ndenge moko mpe, mokristo oyo abalani na moto oyo asambelaka Yehova te akozala na mikakatano mingi

6. Talelá libala ndenge Yehova atalelaka yango

Na Yisraele ya kala, mibali mosusu bazalaki koboma libala na basi na bango mpo na makambo oyo ezangá ntina. Tángá Malaki 2:13, 14, 16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini Yehova ayinaka koboma libala mpo na ntina oyo Biblia endimi te?

Ekobo mpe koboma libala esalaka molongani mosusu mpe bana mpasi

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Soki molongani na yo asambelaka Yehova te, okoki kosala nini mpo libala na bino ezala na esengo?

7. Tosá mibeko ya Yehova oyo etali libala

Mbala mosusu esɛngaka moto asala milende mpo na kotosa mibeko ya Yehova oyo etali libala. c Kasi Yehova apambolaka baoyo basalaka bongo. Talá VIDEO.

Tángá Baebre 13:4, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini: Mibeko ya Yehova oyo etali libala ebongi mpenza? Mpo na nini?

Na bamboka mingi, Leta esɛngaka bato bákomisa libala na bango na buku ya Leta mpe soki balingi koboma libala bákende liboso ya Leta. Yehova asɛngi bakristo bátosa mibeko wana. Tángá Tito 3:1, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Soki obalá, libala na yo endimamá na mibeko ya Leta?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kobalana? Ezali mabe soki bafandi kaka esika moko kozanga kobalana?”

  • Okopesa eyano nini?

NA MOKUSE

Bonzemba ná libala ezali makabo oyo euti epai ya Yehova. Ezala moto oyo abalá to te akoki kozala na bomoi ya esengo soki azali kosala oyo Yehova alingi.

Bozongeli

  • Ndenge nini moto akoki kosalela bonzemba na ye malamu?

  • Mpo na nini Biblia elobi ete tosengeli kobalana kaka na mokristo?

  • Wapi ntina moko kaka Biblia epesi mpo na koboma libala?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Kobala “na kati ya Nkolo kaka” elingi koloba nini?

“Mituna ya batángi” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2004)

Talá bavideo misato oyo ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu ntango olingi kolingana na moto mpe kobala.

Komibongisa mpo na libala (17:05)

Luká koyeba mpo na nini ndeko moko alobi ete oyo Yehova apesi ye ezali na valɛrɛ mingi koleka biloko nyonso oyo atiká.

Nazalaki kokanisa ete akoyekola solo (1:56)

Makambo nini moto asengeli kotalela liboso ya koboma libala to kokabwana na molongani na ye?

“Kumisá libala, ebongiseli oyo Nzambe atyá” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 12/2018)

a Talá Maloba na nsuka ya lisolo 4 oyo elobeli kokabwana ata ntango molongani moko asali ekobo te.

b Na bamboka mosusu, baboti nde baponelaka bana na bango balongani. Soki ezali bongo, baboti oyo balingaka bana na bango batalaka libosoliboso soki moto yango alingaka Yehova, kasi te mpo azali na mbongo, to atángá mingi, to mpe azali na libota ya bazwi.

c Soki ofandaka na moto lokola mwasi ná mobali kasi bobalaná te, yo moko osengeli kopona soki okobala ye to okotika ye.