Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 43

Ndenge nini Bakristo basengeli kotalela masanga?

Ndenge nini Bakristo basengeli kotalela masanga?

Na mokili mobimba, bato batalelaka masanga ndenge moko te. Basusu basepelaka komɛla masanga elongo na baninga. Basusu balingaka komɛla ata moke te. Basusu mpe bamɛlaka tii bakolangwa. Biblia elobi nini mpo na masanga?

1. Ezali mabe komɛla masanga?

Biblia epekisi komɛla masanga te. Kutu, ntango etángi biloko ya malamu oyo Nzambe apesá biso, elobi mpe ete ‘vinyo esepelisaka motema ya moto.’ (Nzembo 104:14, 15) Mibali mpe basi mosusu ya sembo oyo Biblia elobeli bazalaki mpe komɛla masanga.​—1 Timote 5:23.

2. Toli nini Biblia epesi na baoyo bamɛlaka masanga?

Yehova apekisi komɛla masanga mingi mpe kolangwa. (Bagalatia 5:21) Biblia elobi ete: “Kozala te kati na bamɛli minene ya vinyo.” (Masese 23:20) Soki tolingi komɛla, ata ntango tozali biso moko, tosengeli te komɛla na ndenge oyo ekosala ete tókanisa lisusu malamu te, tókóma bilobaloba, tósala makambo ebongi te to tóbebisa nzoto na biso. Soki oyebaka te esika nini osengeli kosuka ntango ozali komɛla masanga, osengeli kotika komɛla yango.

3. Ndenge nini tokoki kotosa bikateli ya basusu na likambo etali masanga?

Moto na moto asengeli kopona soki akomɛla masanga to te. Tosengeli te kotyola moto oyo alekisaka ndelo te ntango azali komɛla masanga. Tosengeli mpe te kotya moto oyo amɛlaka te mbamba ete amɛla masanga. (Baroma 14:10) Tokoboya komɛla masanga soki ekobɛtisa basusu libaku. (Tángá Baroma 14:21.) Tolukaka “litomba na [biso] moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—Tángá 1 Bakorinti 10:23, 24.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba batoli ya Biblia oyo ekosalisa yo opona soki okomɛla masanga to te, mpe esika nini okosuka soki oponi komɛla masanga. Luká koyeba mpe oyo okoki kosala soki ozali kobunda mpo otika komɛla mingi to kolangwa masanga.

4. Poná soki okomɛla masanga to te

Ndenge nini Yesu azalaki kotalela masanga? Mpo na kozwa eyano, tótalela likamwisi ya liboso asalaki. Tángá Yoane 2:1-11, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela likamwisi oyo, ndenge nini Yesu azalaki kotalela masanga? Mpe ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo bamelaka yango?

  • Lokola Yesu apekisaki te komɛla masanga, ndenge nini mokristo asengeli kotalela moto oyo aponi komɛla masanga?

Atako ezali mabe te mokristo amɛla masanga, yango elingi koloba te ete ezali ntango nyonso malamu amɛla. Tángá Masese 22:3, mpe na nsima talelá makambo oyo elandi mpo na koyeba soki okoki komɛla masanga to te ntango:

  • Okokumba motuka to okosalela masini moko boye.

  • Ozali na zemi.

  • Monganga apekisi yo komɛla masanga.

  • Oyebaka te esika oyo osengeli kosuka ntango ozali komɛla masanga.

  • Mibeko ya mboka epekisi yo komɛla masanga.

  • Ozali ná moto moko oyo amɛlaka lisusu masanga te mpo na kala azalaki kolekisa ndelo.

Tosengeli kopesa bato masanga na fɛti ya libala to na milulu mosusu? Mpo na koyeba soki tokoki kosala yango to te, talá VIDEO.

Tángá Baroma 13:13 mpe 1 Bakorinti 10:31, 32. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini toli oyo ya Biblia ekoki kosalisa yo ozwa ekateli oyo ekosepelisa Yehova?

Mokristo mokomoko nde asengeli kopona soki akomɛla masanga to te. Ata soki na bantango mosusu amɛlaka masanga, akoki koboya komɛla na bantango mosusu

5. Yebá esika oyo osengeli kosuka

Soki oponi komɛla masanga, kobosana likambo oyo te: Yehova apekisi te komɛla masanga, kasi apekisi nde komɛla mingi mpe kolangwa. Mpo na nini? Tángá Hosea 4:11, 18, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini ekoki kokómela moto oyo amɛlaka masanga mingi?

Nini ekoki kosalisa biso tómɛlaka masanga mingi te? Tosengeli koyeba esika oyo tosukaka ntango tozali komɛla masanga. Tángá Masese 11:2, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini koyeba esika oyo osukaka ntango ozali komɛla masanga ezali malamu?

6. Nini ekoki kosalisa moto atika komɛla masanga mingi

Talá likambo oyo esalisaki mobali moko atika komɛla masanga mingi. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, makambo nini Dmitry azalaki kosala ntango azalaki komɛla masanga?

  • Akokaki mbala moko kotika komɛla masanga?

  • Nini esalisaki ye atika komɛla masanga mingi?

Tángá 1 Bakorinti 6:10, 11, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini tosengeli kozwa na lisɛki te likambo ya kolangwa masanga?

  • Nini emonisi ete moto oyo amɛlaka masanga mingi akoki kobongwana?

Tángá Matai 5:30, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ntango Yesu alobelaki kokata lobɔkɔ, alingaki koloba ete tosengeli kondima kotika likambo moko mpo na kosepelisa Yehova. Okoki kosala nini soki ozali kobunda mpo na kotika komɛla masanga mingi? a

Tángá 1 Bakorinti 15:33, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Soki ozali na baninga oyo bamɛlaka masanga mingi, yango ekoki kosala yo nini?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Komɛla masanga ezali mabe?”

  • Okopesa eyano nini?

NA MOKUSE

Yehova apesá moto masanga mpo esepelisa ye, kasi apekisi komɛla mingi mpe kolangwa.

Bozongeli

  • Ndenge nini Biblia etalelaka masanga?

  • Wapi makama ya komɛla masanga mingi?

  • Ndenge nini tokoki kotosa ekateli ya basusu mpo na likambo etali komɛla masanga?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Ndenge nini bilenge bakoki kozwa bikateli ya malamu na likambo etali masanga?

Kanisá liboso ya komɛla masanga (2:31)

Talá makambo oyo okoki kosala mpo otika komɛla masanga mingi mpe kolangwa.

“Tiká masanga na esika na yango” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2010)

Mokristo asengeli kotombola kɔpɔ ya masanga?

“Mituna ya batángi” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2007)

Na lisolo “Nazalaki momɛli monene ya masanga,” talá ndenge mobali moko atikaki komɛla masanga mingi.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2012)

a Baoyo bakómá baombo ya masanga bakoki koluka lisalisi ya monganga mpo na kotika. Minganga mingi balobaka ete baoyo bazalaki komɛla masanga mingi to kolangwa, basengeli mpenza kotika komɛla masanga.