Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 46

Mpo na nini osengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo?

Mpo na nini osengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo?

Komipesa na Yehova elakisi kolaka ye na libondeli ete okosambela kaka ye mpe okotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo. (Nzembo 40:8) Nsima na yango nde okoki kozwa batisimo mpo na komonisa basusu ete omipesi na Nzambe. Komipesa na Nzambe ezali ekateli oyo eleki ntina na bomoi. Nini ekoki kotinda yo ozwa ekateli yango ya ntina mingi oyo ekobongola bomoi na yo?

1. Nini etindaka moto amipesa na Nzambe?

Bolingo nde etindaka biso tómipesa na Yehova. (1 Yoane 4:10, 19) Biblia eyebisi biso ‘tólinga Yehova Nzambe na biso na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso mpe na makasi na biso nyonso.’ (Marko 12:30) Tomonisaka ete tolingaka Nzambe na makambo oyo tolobaka mpe oyo tosalaka. Mwasi ná mobali oyo balingani mpenza balukaka kobalana, ndenge moko mpe bolingo oyo tozalaka na yango mpo na Yehova nde etindaka biso tómipesa na ye mpe tózwa batisimo.

2. Mapamboli nini basaleli ya Yehova oyo bazwi batisimo bazwaka?

Soki ozwi batisimo okokɔta na libota ya Yehova; libota moko ya esengo. Yehova akomonisela yo bolingo na ndenge mingi mpe boninga na yo ná ye ekokóma lisusu makasi mingi koleka ndenge ezali sikoyo. (Tángá Malaki 3:16-18.) Lisusu, Yehova akokóma Tata na yo mpe okokóma na bandeko na mokili mobimba oyo balingaka ye mpe oyo bakolinga yo. (Tángá Marko 10:29, 30.) Kasi, ezali na makambo oyo osengeli kosala liboso ya kozwa batisimo. Osengeli koyekola makambo etali Yehova, kolinga ye, mpe kondimela Mwana na ye. Na nsima, osengeli komipesa na Yehova. Soki osali makambo wana mpe ozwi batisimo, okozala na likoki ya kosepela na bomoi libela na libela. Biblia elobi ete batisimo “ezali . . . sikoyo kobikisa bino.”​—1 Petro 3:21.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mpo na nini ezali na ntina omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo.

3. Biso nyonso tosengeli kopona soki tokosalela nani

Na Yisraele ya kala, bato mosusu babandaki kokanisa ete bakoki kosambela Yehova mpe nzambe ya lokuta, Baala. Kasi Yehova atindaki mosakoli na ye Eliya mpo na kosembola makanisi na bango ya mabe. Tángá 1 Bakonzi 18:21, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Likambo nini Bayisraele basengelaki kopona?

Ndenge moko na Bayisraele, biso mpe tosengeli kopona soki tokosalela nani. Tángá Luka 16:13, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini tosengeli te kosambela Yehova mpe moto to eloko mosusu nyonso?

  • Ndenge nini tomonisaka Yehova ete toponi kosambela ye?

4. Kanisá mpenza na bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na yo

Yehova apesi biso makabo mingi ya kitoko. Biso tokoki kopesa ye nini? Talá VIDEO.

Na makambo nini Yehova amonisi ete alingaka yo? Tángá Nzembo 104:14, 15 mpe 1 Yoane 4:9, 10, na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na biloko nyonso oyo Yehova apesá yo, wapi oyo osepelaka na yango mingi koleka?

  • Yango etindaka yo oyoka ndenge nini mpo na Yehova?

Soki bapesi biso eloko oyo tolingaka mingi, tolingaka komonisa botɔndi epai ya moto oyo apesi biso yango. Tángá Kolimbola Mibeko 16:17, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Soki okanisi makambo nyonso oyo Yehova asalá mpo na yo, yango ekotinda yo opesa ye nini?

5. Komipesa na Nzambe ememaka mapamboli mingi

Bato mingi bakanisaka ete lokumu, mosala ya malamu to bakelasi ya milai nde ekopesa bango esengo. Ezali solo? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Atako mobɛti-ndembo na video oyo azalaki kolinga kobɛta bale mingi, mpo na nini atikaki yango?

  • Azwaki ekateli ya komipesa na Yehova, kasi na bale te. Okanisi nini: Azwaki ekateli ya malamu? Mpo na nini?

Liboso ntoma Paulo akóma mokristo, azalaki koluka kokóma moto ya lokumu. Ayekolaki mibeko ya Bayuda epai ya moteyi moko ya lokumu mingi. Kasi asundolaki nyonso wana mpo akóma mokristo. Paulo ayokaki mawa mpo na yango? Tángá Bafilipi 3:8, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini Paulo alobaki ete makambo nyonso oyo asalaki liboso akóma mokristo ezalaki “bosɔtɔ mpamba?”

  • Mapamboli nini azwaki?

  • Nini ekopesa yo esengo mingi: kosalela bomoi na yo ndenge olingi, to kosalela Yehova?

Mapamboli oyo Paulo azwaki ntango akómaki mokristo, elekaki mpenza mosika makambo oyo asundolaki

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ezali na ntina te opesa bomoi na yo na Nzambe.”

  • Okanisi nini: Mpo na nini ebongi omipesa na Yehova?

NA MOKUSE

Bolingo nde etindaka biso tómipesa na Yehova mpe tózwa batisimo.

Bozongeli

  • Mpo na nini ebongi tólinga Yehova na motema na biso mobimba mpe tósambela kaka ye?

  • Mapamboli nini Yehova apesaka basaleli na ye oyo bazwá batisimo?

  • Okolinga komipesa na Yehova?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ntina oyo alanga-nzembo moko mpe mobɛti-ndembo moko baponaki komipesa na Yehova.

Mituna oyo bilenge batunaka​—Nakosala nini na bomoi na ngai?​—Kokanisa makambo eleká (6:54)

Talá makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo omipesa na Nzambe.

“Mpo na nini osengeli komipesa na Yehova?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/2010)

Na video ya miziki oyo, talá ndenge bato oyo bamipesá na Yehova bazali na esengo.

Napesi yo bomoi na ngai (4:30)

Na lisolo “Banda kala nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele?’” talá oyo etindaki mwasi moko atalela makambo oyo eleki ntina na bomoi na ye.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2012)