Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 50

Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?​​—Eteni 2

Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?​​—Eteni 2

Bana bazali likabo ya Yehova. Yehova alingi ete baboti bábatela likabo yango. Yehova apesi batoli ya malamu oyo ekoki kosalisa baboti. Batoli ya Yehova emonisi mpe makambo oyo bana bakoki kosala mpo libota ezala na esengo.

1. Toli nini Yehova apesi baboti?

Yehova alingi ete baboti bálinga bana na bango mpe bálekisaka ntango elongo na bango. Alingi mpe ete baboti bábatela bana na bango na makama mpe básalela batoli ya Biblia mpo na koteya bango. (Masese 1:8) Ayebisi batata ete: “Bókoba kobɔkɔla [bana na bino] . . . na makebisi ya Yehova.” (Tángá Baefese 6:4.) Yehova asepelaka soki baboti bazali kotosa makambo oyo alobi mpo na ndenge ya kobɔkɔla bana. Asepelaka mpe soki baboti bapesi mokumba yango epai ya moto mosusu te.

2. Toli nini Yehova apesi bana?

Yehova alobi na bana ete: “Bótosaka baboti na bino.” (Tángá Bakolose 3:20.) Ntango bazali kopesa baboti na bango lokumu mpe kotosa bango, basepelisaka Yehova mpe baboti na bango. (Masese 23:22-25) Yesu atiká ndakisa malamu na likambo yango, ntango azalaki naino mwana. Atako azalaki moto ya kokoka, azalaki kotosa baboti na ye mpe kopesa bango lokumu.​​—Luka 2:51, 52.

3. Ndenge nini libota na bino ekoki kokóma na boninga makasi ná Nzambe?

Soki ozali moboti, na ntembe te olingaka bana na yo bálinga Yehova lokola yo. Ndenge nini okoki kosala yango? Okosala yango soki ozali kosalela makambo oyo Biblia elobi. Biblia elobi: “Osengeli kokɔtisa [maloba ya Yehova] malamumalamu na kati ya mwana na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala.” (Kolimbola Mibeko 6:7) “Kokɔtisa malamumalamu” elakisi, koteya likambo moko mbala na mbala mpo moto abosana yango te. Na ntembe te, oyebi ete mpo bana na yo bábosana likambo moko boye te, osengeli koyebisa bango yango mbala na mbala. Vɛrsɛ yango emonisi ete mokolo na mokolo, osengeli koluka ntango mpo na koyebisa bana na yo makambo ya Yehova. Ekozala malamu ozwaka mwa ntango pɔsɔ nyonso mpo na kosala losambo na kati ya libota. Ata soki bozali na bana te, kozwa ntango pɔsɔ nyonso mpo na koyekola Biblia ekosalisa bino.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba batoli oyo ekosalisa bato ya libota na yo bázala na esengo mpe bámiyoka ete babatelami ­malamu.

4. Teyá bana na yo na bolingo

Koteya mwana ezalaka pɛtɛɛ te. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa baboti? Tángá Yakobo 1:19, 20, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini baboti bakomonisa ete balingaka bana na bango ntango bazali kosolola na bango?

  • Mpo na nini moboti asengeli te kopesa mwana na ye disiplini ntango azali na nkanda? a

5. Batelá bana na yo

Mpo na kobatela bana na yo, ezali na ntina osololaka na mwana mokomoko makambo etali kosangisa nzoto. Kasi kolobela likambo yango ekoki kozala mwa nsɔni. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Mpo na nini baboti mosusu bakokaka te kosolola na bana na bango makambo etali kosangisa nzoto?

  • Ndenge nini baboti mosusu bayebisaki bana na bango makambo etali kosangisa nzoto?

Ndenge Biblia esakolaki yango, mokili ya Satana ezali se kobeba. Tángá 2 Timote 3:1, 13, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Bato mosusu ya mabe oyo vɛrsɛ 13 elobeli babebisaka bana na makambo ya kosangisa nzoto. Na yango, mpo na nini ezali na ntina baboti báteya bana na bango makambo etali kosangisa nzoto? Mpo na nini ezali mpe na ntina baboti báteya bana na bango ndenge oyo bakoki komibatela na bato mabe oyo babebisaka bana na makambo ya kosangisa nzoto?

Oyebaki yango?

Batatoli ya Yehova babimisaka mikanda mpe bavideo mingi mpo na kosalisa baboti báteya bana na bango makambo etali kosangisa nzoto mpe bábatela bango na bato oyo babebisaka bana na makambo ya kosangisa nzoto. Na ndakisa, talá:

6. Tosá baboti na yo

Bana mpe bilenge bakomonisa botosi epai ya ­baboti na bango soki bazali koloba na bango na ndenge ya malamu. Talá VIDEO, mpe na nsima ­yanolá na mituna oyo elandi.

  • Mpo na nini ebongi ete mwana to elenge ­azala na limemya ntango azali kosolola na baboti na ye?

  • Ndenge nini mwana akoki kosolola na baboti na ye na ndenge oyo ekomonisa ete azali kopesa bango lokumu?

Tángá Masese 1:8, mpe na nsima yanolá na ­motuna oyo:

  • Elenge asengeli kosala nini ntango baboti na ye bapesi ye toli?

7. Bósambela Yehova na libota

Mabota ya Batatoli ya Yehova ezwaka ntango pɔsɔ nyonso mpo na kosambela Yehova elongo. Ndenge nini losambo na kati ya libota esalemaka? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Libota ekoki kosala nini mpo esalaka losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso?

  • Ndenge nini moboti akoki kosala ete losambo na kati ya libota esalisa bato nyonso, mpe básepela?​​—Talá elilingi ya ebandeli ya liteya oyo.

  • Makambo nini ekoki kosala ete ezala mpasi bósala losambo na kati ya libota?

Na Yisraele ya kala, Yehova ayebisaki mabota báyekolaka Makomami mbala na mbala. Tángá Kolimbola Mibeko 6:6, 7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini okoki kosalela toli oyo?

Mwa makanisi mpo na losambo na kati ya libota:

  • Kobongisa makita ya lisangá.

  • Kotánga mpe kolobela masolo ya Biblia oyo bato ya libota bakosepela na yango.

  • Soki ozali na bana mike, zwá to imprimer masolo to makambo mosusu mpo na bana na jw.org.

  • Soki ozali na bana oyo bazali bilenge, bólobela lisolo moko oyo etali bilenge oyo ezali na jw.org.

  • Elongo na bana, bómeka kosala ndenge makambo elekaki na lisolo moko ya Biblia.

  • Bótala video moko na jw.org mpe bólobela yango.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Biblia ezali makasi mingi mpo na bana.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Yehova alingi ete baboti bálinga bana na bango, báteya bango, mpe bábatela bango. Alingi mpe ete bana bátosaka baboti na bango mpe bápesaka bango lokumu. Lisusu, alingi ete mabota esambela ye elongo.

Bozongeli

  • Ndenge nini baboti bakoki koteya mpe kobatela bana na bango?

  • Ndenge nini bana bakoki kopesa baboti na bango lokumu?

  • Bolamu nini bato ya libota bakozwa soki bazali kozwa mwa ntango ya kosambela Yehova pɔsɔ nyonso elongo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Mateya nini ekosalisa mwana na yo ntango akokóma mokóló?

“Mateya motoba oyo bana basengeli koyekola” (Lamuká! No. 2 2019)

Talá toli oyo Biblia epesi bato oyo babatelaka baboti na bango oyo bakómi mibange.

“Biblia elobi nini na likambo etali kosunga baboti oyo bakómi mibange?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá ndenge mobali moko oyo ­azalaki koyeba te ndenge ya kobɔkɔla bana akómaki tata ya malamu.

Yehova ateyaki biso ndenge ya kobɔkɔla bana (5:58)

Talá ndenge batata bakoki ­kokómisa boyokani na bango makasi ná bana na bango ya mibali.

“Ndenge nini batata bakoki koyokana malamu ná bana na bango ya mibali?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2011)

a Na Biblia, liloba “disiplini” elakisi mpe koteya, kotambwisa mpe kosembola. Yango elakisi te kosala mwana mabe to konyokola ye.​​—Masese 4:1.