Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 54

“Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali nani mpe asalaka nini?

“Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali nani mpe asalaka nini?

Yesu azali Mokonzi ya lisangá ya bokristo. (Baefese 5:23) Lelo oyo, Yesu azali Mokonzi na likoló mpe azali kokamba bayekoli na ye oyo bazali awa na mabele na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Tángá Matai 24:45.) Yesu Kristo ye moko nde atyá “moombo” yango mpe apesá ye mwa bokonzi ya kotambwisa lisanga, kasi “moombo” yango asengeli kotosa Kristo mpe kosalela bandeko ya Kristo. Nani nde moombo yango? Asalelaka biso nini?

1. Nani azali “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

Banda kala, Yehova asalelaka mobali moko to mwa etuluku ya mibali mpo na kotambwisa basaleli na ye. (Malaki 2:7; Baebre 1:1) Nsima ya liwa ya Yesu, bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme bakómaki kotambwisa lisangá. (Misala 15:2) Ndenge moko mpe, lelo oyo mwa etuluku ya bankulutu, oyo ebengami Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, epesaka basaleli ya Yehova bilei ya elimo mpe etambwisaka mosala ya kosakola. Etuluku yango ezali “moombo ya sembo mpe ya mayele oyo [Yesu] atye.” (Matai 24:45a) Bandeko nyonso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Basepelaka mpenza koyangela elongo na Kristo na likoló ntango bomoi na bango ekosuka awa na mabele.

2. Bilei nini ya elimo moombo ya sembo apesaka biso?

Yesu alobaki ete moombo ya sembo asengeli “kopesa [bakristo] bilei na bango na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:45b) Bilei oyo tolyaka esalisaka biso tózala makasi mpe nzoto kolongɔnɔ. Ndenge moko mpe bilei ya elimo, elingi koloba mateya oyo euti na Liloba ya Nzambe, epesaka biso makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe ya kosala mosala oyo Yesu apesá biso. (1 Timote 4:6) Tozwaka bilei yango ya elimo na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene, na nzela ya bavideo mpe mikanda na biso. Bilei yango esalisaka biso tóyeba malamu makambo oyo Nzambe alingi mpe tókómisa boninga na biso ná ye makasi.

KƆTÁ NA MOZINDO

Talá ntina oyo tozali na mposa ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaka Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bilei ya elimo, malako mpe lisalisi oyo ebongi

3. Basaleli ya Yehova basengeli kobongisama

Na litambwisi ya Yesu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisaka mosala ya Batatoli ya Yehova. Yesu Kristo atambwisaki mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso ndenge wana. Talá VIDEO.

Tángá 1 Bakorinti 14:33, 40, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini bavɛrsɛ yango emonisi ete Yehova alingi ete Batatoli na ye bábongisama?

4. Moombo ya sembo abongisaka mosala ya kosakola

Mosala ya kosakola ezali mosala oyo eleki ntina oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki. Tángá Misala 8:14, 25, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na siɛklɛ ya liboso, nani azalaki kotambwisa mosala ya kosakola?

  • Petro ná Yoane basalaki nini ntango bantoma mosusu bapesaki bango malako?

Mosala ya kosakola ezali mosala oyo eleki ntina oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisaka. Talá VIDEO.

Yesu amonisaki ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi. Tángá Marko 13:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka mosala ya kosakola na ntina mingi?

  • Mpo na nini ebongi ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” ebongisa mosala yango na mokili mobimba?

5. Moombo ya sembo apesaka litambwisi

Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaka bakristo na mokili mobimba malako. Ndenge nini bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bayebaka litambwisi oyo basengeli kopesa? Tótala ndenge lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso ezalaki kosala. Tángá Misala 15:1, 2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Likambo nini ebimisaki matata na kati ya bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso?

  • Paulo, Barnabasi, ná bakristo mosusu bakendaki epai ya banani mpo na kosilisa matata yango?

Tángá Misala 15:12-18, 23-29, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Liboso ya kozwa ekateli na likambo moko, lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso ezalaki kosala nini mpo na koluka litambwisi ya Nzambe?​—Talá vɛrsɛ 12, 15, mpe 28.

Tángá Misala 15:30, 31 mpe 16:4, 5, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki nini ntango lisangani ya mikóló-bakambi epesaki bango malako?

  • Lokola batosaki, ndenge nini Yehova apambolaki bango?

Tángá 2 Timote 3:16 mpe Yakobo 1:5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Lelo oyo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi elukaka litambwisi wapi liboso ya kozwa bikateli?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Soki ozali kotosa Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ozali kolanda nde bato.”

  • Nini endimisi yo ete Yesu nde azali kotambwisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

NA MOKUSE

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yesu atyá. Epesaka bakristo na mokili mobimba litambwisi mpe bilei ya elimo.

Bozongeli

  • Nani atyá “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka nini mpo na biso?

  • Ondimi mpenza ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami mpo na kosala mosala na yango.

“Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá makambo oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka mpo na kopesa biso bilei ya elimo oyo ebongi kotyelama motema.

Mikanda oyo ezali na makambo ya solo (17:18)

Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi etalelaka mosala oyo Yesu apesá bango?

Kozala moombo ya Yehova ezali libaku malamu (7:04)

Ndenge nini makita mpe mayangani na biso emonisaka ete Yehova nde azali kotambwisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

Yehova azali koteya basaleli na ye (9:39)