Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 57

Osengeli kosala nini soki osali lisumu moko ya monene?

Osengeli kosala nini soki osali lisumu moko ya monene?

Atako olingaka Yehova mingi mpe osalaka makasi oboya kosala makambo oyo ekopesa ye mpasi, na bantango mosusu okosala mabunga. Kasi, masumu mosusu ezalaka minene. (1 Bakorinti 6:9, 10) Soki osali lisumu moko ya monene, kokanisa te ete Yehova atiki kolinga yo; akosepela kolimbisa yo mpe akosalisa yo.

1. Osengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa yo?

Baoyo balingaka Yehova bayokaka mpenza mawa ntango basali lisumu moko ya monene. Kasi elaka oyo Yehova apesi basaleli na ye esalisaka bango. Elobi: “Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.” (Yisaya 1:18) Soki tobongoli mpenza motema, Yehova akolimbisa biso. Ndenge nini okoki komonisa mpenza ete obongoli motema? Soki oyoki mpenza mawa mpo na mabe oyo osalaki, otiki kosala yango mpe osɛngi Yehova alimbisa yo. Na nsima, osali makasi otika makanisi to bizaleli mabe oyo ememaki yo na lisumu yango, mpe osali makasi otosa mibeko ya pɛto ya Yehova na bomoi na yo.​—Tángá Yisaya 55:6, 7.

2. Ndenge nini Yehova asalelaka bankulutu mpo na kosalisa biso ntango tosali lisumu?

Soki tosali lisumu moko ya monene, Yehova ayebisi biso ‘tóbenga bankulutu ya lisangá.’ (Tángá Yakobo 5:14, 15.) Bankulutu yango balingaka Yehova mpe baoyo basalelaka ye. Bazali na makoki ya kosalisa biso tóbongisa boninga na biso ná Yehova.​—Bagalatia 6:1.

Ndenge nini bankulutu basalisaka biso ntango tosali lisumu moko ya monene? Bankulutu mibale to misato bakosalela Biblia mpo na kosembola biso. Bakopesa biso batoli oyo ebongi mpe bakosalisa biso mpo tókwea lisusu te na lisumu yango. Bakoki mpe koyebisa biso ete tokosala makambo mosusu te na lisangá mpo na mwa ntango tii tokokóma lisusu na boyokani malamu ná Yehova. Soki moto oyo asali lisumu moko ya monene aboyi kobongola motema, bankulutu bakolongola ye na lisangá mpo abebisa te bandeko mosusu.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge oyo okoki kokóma na botɔndi mingi mpo na lisalisi oyo Yehova apesaka biso ntango tosali lisumu moko ya monene.

3. Koloba polele lisumu na biso esalisaka biso

Lisumu nyonso esalaka Yehova mpasi, yango wana tosengeli koyebisa ye yango polele. Tángá Nzembo 32:1-5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezali malamu tóyebisa Yehova lisumu na biso na esika ya koluka kobomba yango?

Nsima ya koyebisa Yehova lisumu na biso, tosengeli koluka lisalisi ya bankulutu mpo tómiyoka malamu. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Na video yango, ndenge nini bankulutu basalisaki Canon azongela Yehova?

Lokola bankulutu bazali wana mpo na kosalisa biso, tosengeli koyebisa bango makambo polele mpe kobomba ata eloko moko te. Tángá Yakobo 5:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ bankulutu básalisa biso soki toyebisi bango makambo polele?

Yambolá masumu na yo, yebisá bankulutu makambo nyonso polele mpe ndimá lisalisi ya Yehova

4. Kolongola moto na lisangá esalisaka na makambo mingi

Soki moto oyo asali lisumu moko ya monene aboyi kolanda mibeko ya Yehova, bakolongola ye na lisangá. Tosengeli kokata boninga ná moto yango mpe tosengeli ata moke te kosolola na ye. Tángá 1 Bakorinti 5:6, 11 mpe 2 Yoane 9-11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Kaka ndenge levire evimbisaka farini, kozala moninga ya moto oyo asali lisumu mpe aboyi kobongola motema ekoki kosala nini na lisangá?

Bato mingi oyo balongolamaki na lisangá bazongá mpo disiplini, atako ezalaka mpasi, esalisaki bango bámona ete makambo oyo basalaki ezalaki mabe. (Nzembo 141:5) Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Na video yango balongolaki Sonja na lisangá. Ndenge nini yango esalisaki ye?

Ndenge nini kolongola moto na lisangá . . .

  • ekumisaka nkombo ya Yehova?

  • emonisaka ete Yehova azali sembo mpe bolingo?

5. Yehova alimbisaka biso soki tobongoli motema

Yesu apesaki ndakisa moko mpo na kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaka ntango moto abongoli motema. Tángá Luka 15:1-7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yango eteyi yo nini mpo na Yehova?

Tángá Ezekiele 33:11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Osengeli kosala nini mpo na komonisa ete obongoli mpenza motema?

Ndenge moko na mobateli ya mpate, Yehova akipaka mpenza bampate na ye

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nazali kobanga koyebisa bankulutu lisumu oyo nasali mpo bakolongola ngai na lisangá.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Soki tosali lisumu moko ya monene kasi toyoki mpenza mawa mpe tozwi ekateli ya kotika mabe, Yehova akolimbisa biso.

Bozongeli

  • Mpo na nini ezali malamu tóyebisa Yehova masumu na biso?

  • Tosengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa masumu na biso?

  • Mpo na nini osengeli koluka lisalisi ya bankulutu soki osali lisumu moko ya monene?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge Yehova amoniselaki mobali moko motema mawa oyo elobelami na Yisaya 1:18.

Motema mawa ya Yehova ezali na nsuka te (5:02)

Luká koyeba ndenge oyo okoki koyebisa moto oyo azali Motatoli ya Yehova te ntina oyo balongolaka moto na lisangá.

“Batatoli ya Yehova bayinaka bato oyo balongwá na lingomba na bango?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Na lisolo “Nasengelaki kozongela Yehova,” talá ntina oyo mobali moko oyo atikaki solo amonaki ete Yehova nde asalisaki ye azonga.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2012)