Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 58

Tikalá sembo epai ya Yehova

Tikalá sembo epai ya Yehova

Bakristo ya solo basalaka nyonso mpo bátika ata moke te ete moto to eloko moko epekisa bango kosambela Yehova. Na ntembe te, yo mpe okani kosala bongo. Yehova azwaka bosembo na yo na valɛrɛ mingi. (Tángá 1 Ntango 28:9.) Makambo nini ekoki komeka bosembo na yo, mpe ndenge nini okoki kolonga yango?

1. Ndenge nini basusu bakoki koluka komeka bosembo na biso?

Bato mosusu bakoluka kopekisa biso kosalela Yehova. Ekoki kozala banani? Bato mosusu oyo batiká solo balobaka makambo ya lokuta mpo na ebongiseli ya Yehova mpo na kobebisa kondima na biso. Bato yango babengami bapɛngwi. Longola yango, bakonzi mosusu ya mangomba balobaka lokuta mpo na biso mpo na kotinda bato oyo bazali ekɛngɛ te bátika solo. Ezali likama kosolola na bato oyo batɛmɛlaka biso, kotánga babuku na bango to bamesaje na bango na Internet, to mpe kotala bavideo na bango. Yesu alobaki boye mpo na bato oyo balukaka kolɛmbisa baoyo basalelaka Yehova: “Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Matai 15:14.

Sikoyo tokosala nini soki moto oyo toyebi alobi ete alingi kozala lisusu Motatoli ya Yehova te? Yango ekoki kosala mpasi mingi soki moto yango azali moninga to ndeko na biso. Moto yango akoki kosɛnga biso na makasi ete tópona ye to Yehova. Tosengeli kozala na ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova koleka kozala sembo epai ya moto mosusu nyonso. (Matai 10:37) Yango wana, totosaka mobeko ya Yehova oyo epekisi biso tózala baninga ya bato ya ndenge wana.​—Tángá 1 Bakorinti 5:11.

2. Ndenge nini bikateli na biso ekoki komonisa soki tozali sembo epai ya Yehova?

Lokola tolingaka Yehova mingi, bolingo yango etindaka biso tósala te likambo nyonso oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta. Mosala na biso to eloko mosusu nyonso oyo tokosala esengeli te kozala na boyokani na mangomba ya lokuta. Tosengeli mpe te kozala na ebongiseli oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta. Yehova ayebisi biso boye: “Bóbima kati na [Babilone Monene], bato na ngai.”​—Emoniseli 18:2, 4.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo otika moto moko te abebisa bosembo na yo epai ya Yehova. Talá oyo okoki kosala mpo obima na Babilone Monene mpo na komonisa Yehova ete ozali sembo epai na ye.

3. Kebá na bateyi ya lokuta

Tosengeli kosala nini soki toyoki ete bazali koloba mabe mpo na ebongiseli ya Yehova? Tángá Masese 14:15, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini tozalaka ekɛngɛ liboso ya kondima makambo nyonso oyo toyoki?

Tángá 2 Yoane 10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi?

  • Ata soki tosololaka mbala moko na bapɛngwi te, nini ekoki kosala ete tómona to tóyoka mateya na bango?

  • Okanisi nini: Yehova akoyoka ndenge nini soki tozali koyoka makambo ya lokuta oyo bazali koloba mpo na ye to mpo na ebongiseli na ye?

4. Tikalá sembo epai ya Nzambe ntango ndeko moko asali lisumu

Soki oyebi ete ndeko moko na lisangá asali lisumu moko ya monene, osengeli kosala nini? Tótalela etinda moko oyo Nzambe apesaki Bayisraele. Tángá Balevi 5:1.

Ndenge vɛrsɛ yango emonisi, soki toyebi ete moto moko asali lisumu moko ya monene, tosengeli koyebisa bankulutu makambo oyo toyebi. Kasi liboso ya kosala bongo, ekozala malamu tóyebisa moto yango na boboto ete akende komona bankulutu mpe ayebisa bango lisumu na ye. Soki asali yango te, bosembo na biso epai ya Yehova esengeli kotinda biso tóyebisa bankulutu makambo oyo toyebi. Na ndenge nini kosala bongo emonisi ete tolingaka mpenza . . .

  • Yehova Nzambe?

  • moto oyo asali lisumu?

  • bandeko na lisangá?

Soki ndeko moko akómi na mwa bantembe, salisá ye!

5. Zalá mosika na Babilone Monene

Tángá Luka 4:8 mpe Emoniseli 18:4, 5, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Nkombo na ngai ezalaka tii lelo oyo na molɔngɔ ya bandimi ya lingomba moko ya lokuta?

  • Nazali na kati ya ebongiseli moko oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta?

  • Mosala oyo nasalaka epesaka mangomba ya lokuta mabɔkɔ?

  • Ezali na makambo mosusu ya bomoi na ngai oyo nasengeli kotika mpo nakabwana na mangomba ya lokuta?

  • Soki nayanoli ɛɛ ata na motuna moko, mbongwana nini nasengeli kosala?

Na makambo nyonso, zwá ekateli oyo ekosala ete ozala na lisosoli ya malamu mpe oyo ekomonisa ete ozali sembo epai ya Yehova.

Okosala nini soki ebongiseli ya lingomba moko oyo esalisaka bato ya mpasi esɛngi yo otya likabo?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Mpo na komonisa ete toteyaka solo, nasengeli koyeba makambo oyo bapɛngwi balobaka mpo na Batatoli ya Yehova.”

  • Kosala bongo ezali malamu? Mpo na nini?

NA MOKUSE

Mpo na kotikala sembo epai ya Yehova, tosengeli koboya baninga oyo bazali sembo te epai na ye. Lisusu, tosengeli mpenza kokabwana na mangomba ya lokuta.

Bozongeli

  • Mpo na nini tosengeli te kotala, kotánga, to koyoka makanisi ya bapɛngwi?

  • Ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo balingi lisusu te kozala Batatoli ya Yehova?

  • Ndenge nini tokoki kokima mangomba ya lokuta mpo na kotosa oyo Biblia elobi?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba oyo okoki kosala ntango bato mosusu bazali koloba makambo ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova.

“Otalelaka makambo malamu liboso ya kondima yango?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 08/2018)

Ndenge nini okoki koyeba mosala, ebongiseli to makambo oyo epesaka Babilone Monene mabɔkɔ?

“Zalá na mingi ya kosala na nsuka ya ‘mikolo ya nsuka’” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2019, paragrafe 16-18)

Batɛmɛli mosusu basalaka nini mpo na kolɛmbisa kondima na biso?

Kebá na mateya ya lokuta (9:32)

Na lisolo “Nazalaki koluka Nzambe banda bomwana,” talá ndenge nganga-nzambe moko ya lingomba ya Shinto akabwanaki na lingomba ya lokuta.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2011)