Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 60

Kobá kokola na elimo

Kobá kokola na elimo

Na boyekoli na yo ya Biblia, oyekoli makambo mingi mpo na Yehova. Makambo oyo oyekoli esali ete olinga ye mingi, mpe mbala mosusu osili komipesa epai na ye mpe ozwi batisimo. Soki ezali bongo te, mbala mosusu etikali moke osala yango. Kasi kokola na elimo esuki kaka te na kozwa batisimo. Okoki kokoba kokómisa boninga na yo ná Yehova makasi libela na libela. Ndenge nini?

1. Mpo na nini tosengeli kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi?

Tosengeli kosala makasi ya kokoba kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi. Mpo na nini? ‘Mpo tómemama mosika te na nzela’ ya Yehova. (Baebre 2:1) Nini ekoki kosalisa biso tókoba kosalela Yehova na bosembo? Tokoki kosala mingi na mosala ya kosakola mpe koluka ndenge oyo tokoki kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova. (Tángá Bafilipi 3:16.) Kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu!​—Nzembo 84:10.

2. Makambo nini mosusu osengeli kokoba kosala?

Atako boyekoli na yo ya Biblia ekómi na nsuka, bomoi na yo ya mokristo ekokoba. Biblia elobi ete tosengeli “kolata bomoto ya sika.” (Baefese 4:23, 24) Soki ozali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyangana na makita ya lisangá, okoyeba makambo mosusu etali Yehova mpe bizaleli na ye. Luká koyeba ndenge oyo okoki komekola malamumalamu bizaleli ya Yehova na bomoi na yo. Kobá kosala bambongwana oyo esengeli mpo osepelisa Yehova.

3. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo okoba kokola na elimo?

Biblia elobi: “Nzambe . . . ye moko akosilisa kobongisa bino, akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.” (1 Petro 5:10) Biso nyonso tokutanaka na komekama. Kasi Yehova apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo tólonga komekama. (Nzembo 139:23, 24) Alaki ete akopesa yo mposa mpe nguya ya kosalela ye na bosembo.​—Tángá Bafilipi 2:13.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge oyo okoki kokoba kokola na elimo mpe ndenge oyo Yehova akopambola yo.

4. Kobá kosolola na moninga na yo ya motema

Libondeli mpe boyekoli na yo ya Biblia esalisi yo okóma moninga ya Yehova. Ndenge nini makambo yango mibale ekoki kosala ete boninga na yo ná Yehova ekóma lisusu makasi?

Tángá Nzembo 62:8, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na kokómisa boninga na yo ná Yehova makasi, ndenge nini okoki kobongisa lisusu lolenge na yo ya kobondela?

Tángá Nzembo 1:2, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na kokómisa boninga na yo ná Yehova makasi, ndenge nini okoki kobongisa lisusu lolenge na yo ya kotánga Biblia?

Okoki kosala nini mpo boyekoli na yo moko ya Biblia esalisa yo mpenza? Mpo na komona mwa makanisi, talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Makanisi nini omoni na video, oyo okoki kosalela?

  • Makambo nini okosepela koyekola?

5. Omityela mikano ya elimo

Kozala na mikano na mosala ya Yehova ekosalisa yo okoba kokola na elimo. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Na video yango, bolamu nini Cameron azwaki mpo amityelaki mikano ya elimo?

Moto nyonso te nde azali na likoki ya kokende na mboka mosusu mpo na kosakola. Nzokande, biso nyonso tokoki komityela mikano oyo tokokoka kokokisa. Tángá Masese 21:5, mpe na nsima lobelá mikano oyo okolinga komityela . . .

  • na lisangá.

  • na mosala ya kosakola.

Ndenge nini vɛrsɛ yango ekoki kosalisa yo okokisa mikano yango?

Mikano oyo okoki komityela

  • Kobongisa lisusu lolenge na yo ya kobondela.

  • Kotánga Biblia mobimba.

  • Koluka koyeba bandeko nyonso ya lisangá.

  • Kobanda koteya moto Biblia.

  • Kokóma mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza.

  • Soki ozali ndeko mobali, luká kokóma mosaleli na misala.

6. Sepelá na bomoi libela na libela!

Tángá Nzembo 22:26, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Okoki kosala nini mpo osepela na bomoi sikoyo mpe libela na libela?

NA MOKUSE

Kobá kokómisa boninga na yo ná Yehova makasi mpe mityelá mikano ya elimo. Na ndenge yango, okosepela na bomoi libela na libela!

Bozongeli

  • Mpo na nini osengeli kondima ete Yehova akosalisa yo osalela ye na bosembo?

  • Ndenge nini okoki kokómisa boninga na yo ná Yehova makasi?

  • Ndenge nini mikano ya elimo ekoki kosalisa yo okoba kokola na elimo?

Oyo okoki kosala na mbula oyo ekoya

MAKANISI MOSUSU

Nini esepelisaka Yehova mingi: kosala likambo moko ya kokamwa mpo na komonisa ete omipesi na ye to kotikala sembo epai na ye bomoi mobimba?

Zalá sembo lokola Abrahama (9:20)

Ata mosaleli ya Yehova ya sembo akoki kosila esengo. Talá ndenge ya kozongela esengo.

Koyekola ná komanyola esalisi ngai nazongela esengo (5:25)

Mpo na nini kokóma mokristo oyo akɔmeli na elimo ezali na ntina, mpe ndenge nini okoki kosala yango?

“Tókende nokinoki tii na kokɔmela​—‘Mokolo monene ya Yehova ekómi pene’” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2009)