Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 2 Bozongeli

Eteni 2 Bozongeli

Bótalela mituna oyo elongo na moteyi na yo:

  1. Nzambe akosala mangomba ya lokuta nini?

    (Talá Liteya 13.)

  2. Tángá Kobima 20:4-6.

    • Yehova ayokaka ndenge nini ntango bato basalelaka bililingi to bikeko mpo na kosambela ye?

      (Talá Liteya 14.)

  3. Yesu azali nani?

    (Talá Liteya 15.)

  4. Osepelaka na bizaleli nini ya Yesu?

    (Talá Liteya 17.)

  5. Tángá Yoane 13:34, 35 mpe Misala 5:42.

    • Banani bazali bakristo ya solo lelo oyo? Nini endimisi yo ete bazali mpenza bakristo ya solo?

      (Talá Liteya 18 mpe 19.)

  6. Nani azali mokonzi ya lisangá, mpe ndenge nini atambwisaka yango?

    (Talá Liteya 20.)

  7. Tángá Matai 24:14.

    • Ndenge nini esakweli oyo ezali kokokisama lelo oyo?

    • Esí oyebisi nani nsango malamu?

      (Talá Liteya 21 mpe 22.)

  8. Okanisi ete ebongi mpenza ozwa batisimo? Mpo na nini?

    (Talá Liteya 23.)

  9. Ndenge nini okoki komibatela na Satana mpe bademo?

    (Talá Liteya 24.)

  10. Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?

    (Talá Liteya 25.)

  11. Mpo na nini bato bamonaka mpasi mpe bakufaka?

    (Talá Liteya 26.)

  12. Tángá Yoane 3:16.

    • Yehova asalá nini mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa?

      (Talá Liteya 27.)

  13. Tángá Mosakoli 9:5.

    • Nini ekómelaka moto ntango akufi?

    • Yesu akosala nini mpo na bamiliare ya bato oyo bakufá?

      (Talá Liteya 29 mpe 30.)

  14. Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe ezali malamu koleka baguvɛrnema nyonso ya mokili?

    (Talá Liteya 31 mpe 33.)

  15. Ondimi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela? Mpo na nini? Ntango nini ebandaki koyangela?

    (Talá Liteya 32.)