Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakoki mpenza?

Nakoki mpenza?

Nakoki mpenza mpo na kosakola elongo na bandeko ya lisangá?

Okoki kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te soki . . .

  • Ozali koyekola Biblia mbala na mbala, kobondela, mpe koyanganaka na makita ya lisangá.

  • Ozali kolinga mpe kondima makambo oyo ozali koyekola, mpe ozali kosepela koyebisa yango basusu.

  • Ozali kolinga Yehova mpe kopona baninga oyo balingaka ye.

  • Okati mpenza boyokani nyonso na mangomba ya lokuta mpe otiki kokɔta na makambo ya politiki.

  • Ozali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na yo mpe olingi kokóma Motatoli ya Yehova.

Soki omoni ete okoki mpenza mpo na kosakola elongo na bandeko ya lisangá, ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia akozwa bibongiseli mpo bósolola na bankulutu mpo na koyeba soki okokisi makambo oyo Biblia esɛngi.

Nakoki mpenza mpo na kozwa batisimo?

Okoki kozwa batisimo soki . . .

  • Ozali mosakoli oyo azwi naino batisimo te.

  • Ozali kosakola mbala na mbala.

  • Ozali kondima mpe kolanda litambwisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”​—Matai 24:45-47.

  • Omipesi na Yehova na libondeli mpe olingi kosalela ye libela na libela.

Soki omoni ete okoki mpenza mpo na kozwa batisimo, ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia akozwa bibongiseli mpo bósolola na bankulutu mpo na koyeba soki okokisi makambo oyo Biblia esɛngi.