Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli

Maloba ya ebandeli

Buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo ekosalisa yo omona na pɛtɛɛ nyonso bavɛrsɛ mpe masolo ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo olonga mikakatano ya bomoi. Ekosalisa yo mpe omona mbala moko bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebongi mpo na kolendisa basusu mpe kosalisa bango bázwa bikateli oyo ekokumisa Yehova. Poná lisolo oyo esepelisi yo. Lisolo mokomoko ezali na mituna ya ntina mpe mwa maloba ya mokuse ya masolo ya Biblia oyo ekosalisa yo. (Talá etanda “ Ndenge ya kosalela buku oyo.”) Okozwa batoli ya ntina, litambwisi, mpe libɔndisi ya Biblia oyo ebongi mpenza. Okomona mpe biloko ya motuya ya Biblia oyo okokabola na bato mosusu, elingi koloba, bavɛrsɛ oyo ekopesa bango makasi, oyo ekosalisa bango na mikakatano oyo bazali na yango, oyo ekopesa bango batoli, mpe oyo ekolendisa bango.

Mokanda oyo etandi te liste ya bavɛrsɛ nyonso ya Biblia mpo na lisolo mokomoko. Kasi ebongisami mpo na kosalisa yo omona bavɛrsɛ oyo tosalelaka mingi; na nsima okoki mpe kosala bolukiluki na mikanda mosusu. (Mas 2:​1-6) Mpo na kokɔta na mozindo, salelá mitindami mpe banɔti ya Biblia ya boyekoli na français. Salelá buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova to Index des publications des Témoins de Jéhovah mpo na koyekola bandimbola mosusu ya bavɛrsɛ ya Biblia mpe mateya oyo ezali na kati. Salelá mikanda oyo euti kobima sika mpo omindimisa ete makambo oyo oyekoli ezali bingɛngiseli ya sika ya mateya ya solo.

Tiká ete buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo esalisa yo ozwa bwanya, boyebi, mpe okanga ntina ya mateya ya Biblia. Ntango ozali kosalela mokanda oyo, okomindimisa lisusu ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.”—Ebr 4:12.