Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bafɛti mpe milulu

Bafɛti mpe milulu

Milulu oyo bakristo basalaka

Molulu nini kaka moko bakristo basengeli kosala?

Basaleli ya Nzambe bayanganaka mpo na kosambela

Mib 31:12; Ebr 10:​24, 25

Milulu oyo bakristo baboyaka

Mpo na nini ezali mabe kosala milulu oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta?

1Ko 10:21; 2Ko 6:​14-18; Ef 5:​10, 11

Talá mpe “Kosangisa losambo

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Kob 32:​1-10—Bayisraele basilikisaki Yehova ntango balukaki kosangisa losambo ya solo na oyo ya lokuta

    • Mit 25:​1-9—Yehova apesaki bato na ye etumbu mpo basalaki bafɛti ya bapakano mpe pite

Noele ezali fɛti ya bakristo?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 2:​1-5—Yesu abotamaki na ntango oyo bazalaki kozwa motángo ya bato; Baroma balingaki te kosɛnga Bayuda batomboki oyo bazalaki na nse ya bokonzi na bango básala mobembo mpo na kokomisa nkombo na eleko ya malili makasi mpe ya mbula

    • Lk 2:​8, 12—Ntango Yesu abotamaki, babateli ya mpate bazalaki libándá, likambo oyo bakokaki te kosala na eleko ya malili ya sanza ya zomi na mibale

Bakristo basengeli kosala fɛti ya mbotama?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 40:​20-22—Farao, mopakano, asalaki fɛti ya mbotama na ye mpe abomisaki moto

    • Mt 14:​6-11—Mokonzi Erode, motɛmɛli ya bayekoli ya Kristo, asalaki fɛti ya mbotama na ye mpe abomisaki Yoane mobatisi

Milulu oyo euti na Mibeko ya Moize

Bakristo basengeli nde kotosa makambo oyo ezali na Mibeko ya Moize, oyo esangisi bafɛti ndenge na ndenge?

Bakristo basengeli kotosa mobeko oyo etali Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ?

Milulu ya ekólo

Bakristo basengeli kosangana na bafɛti mpo na makambo oyo ekólo esalá?

Bakristo basengeli kosangana na milulu ya kokanisa bitumba oyo ekólo ebundá?

Bakristo basengeli nde kosangana na milulu oyo ezali kopesa bato lokumu oyo esengeli kokende kaka epai ya Yehova?

Kob 20:5; Ro 1:25

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 12:​21-23—Nzambe apesaki Erode Agripa I etumbu mpo andimaki lokumu oyo euti epai ya bato

    • Mis 14:​11-15—Barnabasi ná Paulo baboyaki kozwa lokumu oyo ebongi na bango te

    • Em 22:​8, 9—Anzelu ya Yehova aboyaki básambela ye