Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Toli

Toli

Ntango bapesi biso toli

Mpo na nini tosengeli kolukaka toli oyo euti na Biblia?

Mpo na nini eleki malamu koyoka toli na esika ya koluka komilongisa?

Mas 12:15; 29:1

Talá mpe Mas 1:​23-31; 15:31

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 15:​3, 9-23—Ntango mosakoli Samwele asembolaki Saulo, Mokonzi Saulo amilongisaki mpe aboyaki toli; yango wana Yehova abwakaki ye

    • 2Nt 25:​14-16, 27—Mokonzi Amazia asalaki lisumu mpe na nsima aboyaki toli oyo mosakoli ya Yehova apesaki ye, yango wana Yehova aboyaki ye mpe azangaki libateli

Mpo na nini esengeli komemya bakɛngɛli oyo bapesaka toli?

1Te 5:12; 1Ti 5:17; Ebr 13:​7, 17

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 3Yn 9, 10—Ntoma Yoane oyo akómaki mobange apamelaki Diotrefese na ndenge azangaki limemya epai ya bandeko oyo bazalaki kotambwisa makambo na lisangá ya bokristo

Mpo na nini esengeli koyokela mibange?

Le 19:32; Mas 16:31

Talá mpe Yb 12:12; 32:7; Tit 2:​3-5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 23:​16-18—Mokonzi Davidi ayokaki toli ya Yonatane, oyo azalaki mokóló na ye ya mbula soki 30 mpe toli yango epesaki ye makasi

    • 1Ba 12:​1-17—Mokonzi Yeroboame aboyaki toli ya malamu ya mibange, kasi alandaki toli ya mabe ya bilenge; yango ememaki na libebi

Nini emonisi ete basambeli ya sembo ya Yehova, ezala basi to bilenge bakoki kopesa toli ya malamu?

Yb 32:​6, 9, 10; Mas 31:​1, 10, 26; Mos 4:13

Talá mpe Nz 119:100

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 25:​14-35—Abigaile apesaki Mokonzi Davidi toli oyo ebikisaki bato ebele mpe epekisaki Davidi amema ngambo ya makila

    • 2Sa 20:​15-22—Mwasi moko ya bwanya na engumba Abele abikisaki engumba mobimba na toli na ye

    • 2Ba 5:​1-14—Mwana mwasi ya moke Moyisraele apesaki likanisi oyo esalisaki elombe monene ya etumba ayeba ndenge akoki kobika na maladi ya maba

Mpo na nini tosengeli te kolanda toli ya baoyo bamemyaka Yehova mpe Liloba na ye te?

Nz 1:1; Mas 4:14

Talá mpe Lk 6:39

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Nt 10:​13, 14—Mokonzi Saulo atunaki moto oyo asololaka na bilimo na esika ya kotuna Yehova mpe akufaki mpo na kozanga bosembo na ye

    • 2Nt 22:​2-5, 9—Mokonzi Ahazia aponaki bapesi-toli ya mabe; yango ememaki ye na liwa

    • Yb 21:​7, 14-16—Yobo aboyaki kokanisa ndenge moko na baoyo bamemyaka Yehova te

Kopesa toli

Mpo na nini eleki malamu koyeba ndenge makambo esalemaki mpe koyoka ngámbo nyonso mibale liboso ya kopesa toli?

Mas 18:​13, 17

Talá mpe Mas 25:8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 1:​9-16—Nganga-nzambe monene Eli apesaki Hana toli ya makasi liboso ya koyeba makambo ndenge ezali, akanisaki ete mwasi yango ya sembo alangwe masanga

    • Mt 16:​21-23—Ntoma Petro apamelaki Yesu, kozanga koyeba ete toli yango elingaki nde kokokisa mposa ya Satana kasi ya Yehova te

Mpo nini ezali malamu kobondela Yehova liboso ya kopesa toli?

Nz 32:8; 73:​23, 24; Mas 3:​5, 6

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Kob 3:​13-18—Mosakoli Moize asɛngaki Yehova asalisa ye ayeba ndenge eleki malamu ya koyanola na mituna oyo Bayisraele bakoki kotuna

    • 1Ba 3:​5-12—Ntango azalaki elenge, Mokonzi Salomo asɛngaki Yehova bwanya na esika amityela motema, mpe Yehova apambolaki ye mingi

Mpo na nini tosengeli komindimisa ete toli mpe biyano na biso eutaka na Liloba ya Nzambe?

Nz 119:​24, 105; Mas 19:21; 2Ti 3:​16, 17

Talá mpe Mib 17:​18-20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 4:​1-11—Biyano oyo Yesu apesaki ntango Satana amekaki ye, eutaki na Liloba ya Nzambe, kasi na bwanya na ye moko te

    • Yn 12:​49, 50—Yesu amonisaki ete mateya na ye ezalaki kouta na oyo Tata na ye ateyaki; atikelá biso ndakisa ya malamu mpenza

Mpo na nini tosengeli kosala makasi ete tózala na boboto ntango tozali kopesa toli mpe tóyeba eloko ya malamu oyo moto asali mpe tópesa ye longonya?

Ga 6:1; Kol 3:12

Talá mpe Yis 9:6; 42:​1-3; Mt 11:​28, 29

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 19:​2, 3—Na nzela ya molobeli na ye, Yehova asembolaki Mokonzi Yehoshafate, mpe na nsima akumisaki ye na likambo ya malamu oyo asalaki

    • Em 2:​1-4, 8, 9, 12-14, 18-20—Yesu akumisaki masangá ebele liboso ya kopesa yango toli

Soki mokristo moko ayebisi biso ete ndeko na ye mokristo asali ye mabe, na ndakisa abubi ye to akoseli ye makambo, mpo na nini eleki malamu koyebisa ye akende kosolola yango kaka ye na ndeko na ye oyo asali ye mabe?

Ndenge nini tokoki kolendisa mokristo oyo amoni ete basali ye mabe, amonisa motema mawa, motema molai mpe alimbisa?

Mt 18:​21, 22; Mr 11:25; Lk 6:36; Ef 4:32; Kol 3:13

Talá mpe Mt 6:14; 1Ko 6:​1-8; 1Pe 3:​8, 9

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 18:​23-35—Yesu apesaki ndakisa moko ya kitoko mpo na komonisa ntina ya kolimbisa

Mpo na nini tosengeli kokangama na oyo ezali malamu ntango tozali kopesa toli?

Nz 141:5; Mas 17:10; 2Ko 7:​8-11

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 15:​23-29—Mosakoli Samwele abangaki Mokonzi Saulo te mpe apesaki ye toli

    • 1Ba 22:​19-28—Mosakoli Mikaya abongolaki te nsango ya likebisi mpo na Mokonzi Ahaba, atako bazalaki kokanela ye mpe konyokola ye

Ndenge nini tokoki kopesa moto toli kozanga ete tólɛmbisa ye na elimo?

Ebr 12:​11-13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 22:​31-34—Atako ntoma Petro asalaki mabunga minene, Yesu atyelaki ye motema mpe andimaki ete akozala na likoki ya kolendisa basusu

    • Flm 21—Ntoma Paulo atyaki motema ete Filemo akosalela toli na ye oyo ezali na boyokani na mokano ya Nzambe

Ndenge nini tokoki kozala na boboto ntango tozali kopesa toli epai ya baoyo batungisami na makanisi to balɛmbi nzoto?

Ndenge nini tokoki komonisa mosumuki ete tolingi kosalisa ye azongela lisusu boyokani na ye na Yehova?

Ndenge nini tokoki kopesa lokumu epai ya moto oyo tozali kopesa toli, ata soki azali na mbula nini, azala mwasi to mobali?

Soki moto azali mbala na mbala koboya toli ya Makomami, mpo na nini babateli ya mpate basengeli kopesa ye toli ya makasi?