Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bikateli

Bikateli

Ndenge nini tokoki kobongisa makanisi mpe motema na biso mpo tózwa bikateli ya malamu?

Mpo na nini tosengeli koboya kozwa mbangumbangu bikateli ya ntina mingi?

Mpo na nini tosengeli koboya koyokela motema na biso ya kozanga kokoka ntango tozali kozwa bikateli?

Mas 28:26; Yir 17:9

Talá mpe Mit 15:39; Mas 14:12; Mos 11:​9, 10

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 35:​20-24—Yosiya, mokonzi malamu, asalelaki te toli oyo eutaki mpenza epai ya Yehova mpe abundaki na Farao Neko

Libondeli ezali na ntina nini ntango tolingi kozwa bikateli ya ntina mingi?

Flp 4:​6, 7; Yk 1:​5, 6

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 6:​12-16—Yesu abondelaki butu mobimba liboso apona bantoma na ye 12

    • 2Ba 19:​10-20, 35—Ntango mokakatano moko monene ebimaki, Mokonzi Ezekiasi abondelaki mpe Yehova abikisaki ye ná bato na ye

Nani abongi mpenza mpo na kosalisa biso tózwa bikateli, mpe ndenge nini asalaka yango?

Nz 119:105; Mas 3:​5, 6; 2Ti 3:​16, 17

Talá mpe Nz 19:7; Mas 6:23; Yis 51:4

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 15:​13-18—Ntango bandeko ya lisangani ya mikólo-bakambi na Yerusaleme balingaki kozwa ekateli ya monene, balukaki lisalisi na Makomami

Bikateli etali:

Likambo nyonso ya bomoi

Mosala

Talá “Mosala

Masano

Talá “Kominanola

Libala

Talá “Libala

Lisalisi ya monganga

Le 19:26; Mib 12:​16, 23; Lk 5:31; Mis 15:​28, 29

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 19:​18-20—Bakristo na Efese bamonisaki ete baboyi misala ya maji mpe ya bilimo mabe

Mikano ya elimo

Ndenge ya kosalela ntango

Ndenge nini basaleli ya Nzambe oyo bakɔmɛli bakoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu?

Yb 12:12; Mas 11:14; Ebr 5:14

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 1:​11-31, 51-53—Bate-sheba ayokaki toli ya mosakoli Natane, mpe yango ebikisaki ye ná mwana na ye Salomo

Mpo na nini tosengeli te kosɛnga basusu bázwa bikateli na esika na biso?

Mpo na nini tosengeli kozwa ekateli ya kosalela toli ya Nzambe mpe komona te ete ezangi ntina?

Nz 18:​20-25; 141:5; Mas 8:33

Talá mpe Lk 7:30

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 19:​12-14, 24, 25—Lota akebisaki mibali oyo balingaki kobala bana na ye mpo na libebi oyo ezalaki koya, kasi batyaki likebi te

    • 2Ba 17:​5-17—Bayisraele bamemamaki bakangami mpo baboyaki kolanda toli ya Yehova

Mpo na nini tosengeli koyokela lisosoli na biso ntango tolingi kozwa bikateli?

Mpo na nini ezali malamu kokanisa na makambo oyo ekateli na biso ekoki kobimisa?

Ndenge oyo ekoki kosala basusu

Ndenge oyo ekosala biso na mikolo ezali koya

Ekosala nini na boyokani na biso na Yehova

Mpo na nini tosengeli komema mokumba ya bikateli na biso moko?