Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo elɛmbisaka

Makambo oyo elɛmbisaka

Ntango basusu basundoli yo, bayokisi yo mpasi to batɛki yo, ekoki kolɛmbisa yo

Nz 55:​12-14; Lk 22:​21, 48

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 8:​1-6—Mosakoli Samwele ayokaki mpasi mpe alɛmbaki ntango Bayisraele batyaki ye mbamba atyela bango mokonzi

    • 1Sa 20:​30-34—Yonatane ayokaki mpasi mpe nsɔni ntango tata na ye, Mokonzi Saulo, ayokelaki ye nkanda makasi

  • Bavɛrsɛ ya kobɔndisa:

  • Bandakisa oyo ekoki kobɔndisa:

    • Nz 55:​12-14, 16-18, 22—Atako moninga na ye ya motema Ahitofele atɛkaki ye, Davidi abwakelaki Yehova mitungisi na ye mpe azwaki libɔndisi

    • 2Ti 4:​16-18—Atako akutanaki na komekama mpe bato basundolaki ye, ntoma Paulo azwaki nguya epai ya Yehova mpe na elikya oyo Nzambe apesaka

Bolɛmbu mpe masumu na biso ekoki kolɛmbisa biso

Yb 14:4; Ro 3:23; 5:12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 51:​1-5—Mokonzi Davidi ayokaki mpasi mpo na masumu oyo asalelaki Yehova

    • Ro 7:​19-24—Ntoma Paulo ayokaki mawa mpo asengelaki kobundisa bamposa na ye moko ya kosala lisumu

  • Bavɛrsɛ ya kobɔndisa:

  • Bandakisa oyo ekoki kobɔndisa:

    • 1Ba 9:​2-5—Atako Mokonzi Davidi asalaki masumu ya minene, Yehova atángaka ye lokola moto ya sembo

    • 1Ti 1:​12-16—Atako asalaki masumu ya minene kala, ntoma Paulo andimaki ete Nzambe akoyokela ye mawa