Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolɛmba nzoto

Kolɛmba nzoto

Mpo na nini kolɛmba nzoto ezali likama mpo na basaleli ya Yehova?

Mpo na nini tokoki kotya motema ete Yehova akosalisa biso tólonga kolɛmba nzoto?

Nz 23:​1-6; 113:​6-8; Yis 40:11; 41:​10, 13; 2Ko 1:​3, 4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 11:​28-30—Yesu, moto oyo amonisaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, azali boboto mpe abɔndisaka

    • Mt 12:​15-21—Yesu akokisaki esakweli oyo ezali na Yisaya 42:​1-4, asalelaki baoyo balɛmbi nzoto makambo na boboto

Bavɛrsɛ ya kobɔndisa mpo na mwa makambo oyo elɛmbisaka nzoto

Talá “kobɔndisa

Mpo na nini tosengeli kozala bato oyo balendisaka basusu?

Mt 18:6; Ef 4:29

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mit 32:​6-15—Banɔngi zomi oyo bazangaki bosembo balɛmbisaki Bayisraele nzoto, mpe ekólo mobimba enyokwamaki

    • 2Nt 15:​1-8—Nsango oyo eutaki epai ya Yehova esalisaki Mokonzi Asa azwa mpiko mpe alongola losambo ya bikeko na ekólo