Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolendisama

Kolendisama

Mpo na nini ebongi ete basaleli ya Nzambe bálendisanaka?

Yis 35:​3, 4; Kol 3:16; 1Te 5:11; Ebr 3:13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 32:​2-8—Mokonzi Ezekiasi alendisaki bato na ye ntango bato ya Asiri bayaki kobundisa bango

    • Da 10:​2, 8-11, 18, 19—Anzelu alendisaki mpe apesaki mosakoli Danyele makasi, ntango akómaki mobange mpe alɛmbaki

Mpo na nini Yehova alingaka ete bankulutu bálendisaka basusu?

Yis 32:​1, 2; 1Pe 5:​1-3

Talá mpe Mt 11:​28-30

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 3:28; 31:​7, 8—Nakolanda mitindo ya Yehova, mosakoli Moize alendisaki mpe apesaki mokitani na ye Yosua makasi

    • Ms 11:​22-26; 14:22—Na ntango ya monyoko, ntoma Paulo ná Barnabasi balendisaki bakristo na Antiokia

Mpo na nini kopesa basusu longonya na milende oyo basali ezali na ntina mpo na kolendisa bango?

Mas 31:​28, 29; 1Ko 11:2

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Bas 11:​37-40—Mbula nyonso basi ya Yisraele bazalaki kokende kotala mwana mwasi ya Yefeta mpe kopesa ye longonya na elimo na ye ya komipimela

    • Em 2:​1-4—Atako esɛngaki ete Yesu asembola bakristo ya Efese, ayebisaki mpe bango makambo ya malamu oyo bazalaki kosala

Ndenge nini basaleli ya sembo ya Yehova bakoki kolendisana?

Mas 15:23; Ef 4:29; Flp 1:​13, 14; Kol 4:6; 1Te 5:14

Talá mpe 2Ko 7:​13, 15, 16

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 23:​16-18—Yonatane alukaki moninga na ye Davidi mpe alendisaki ye na ntango ya mpasi

    • Yn 16:33—Yesu alendisaki bayekoli na ye ntango ayebisaki bango ete alongi mokili, mpe andimisaki bango ete bakoki mpe kolonga soki bamekoli ye

    • Mis 28:​14-16—Ntango azalaki kokende na Roma mpo na kosamba, ntoma Paulo azwaki mpiko ntango amonaki bandeko bayaki mpo na kokutana ye mpe kolendisa ye

Mpo na nini ezali malamu koboya elimo ya kozanga limemya mpe ya koimaima?

Flp 2:​14-16; Yd 16-19

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mit 11:​10-15—Mosakoli Moize alɛmbaki nzoto mpo na makanisi mabe mpe kozanga botosi ya bato mosusu

    • Mit 13:​31, 32; 14:​2-6—Maloba ya kolɛmbisa ya banɔngi zomi elɛmbisaki bato mpe etindaki bango na botomboki

Ndenge nini tolendisamaka ntango tolekisaka ntango elongo na bandeko na biso?

Mas 27:17; Ro 1:​11, 12; Ebr 10:​24, 25; 12:12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 20:​1-19—Ntango limpinga moko monene eyaki kobundisa Yuda, Mokonzi Yehoshafate abondelaki elongo na bato

    • Mis 12:​1-5, 12-17—Ntango babomaki ntoma Yakobo mpe batyaki ntoma Petro na bolɔkɔ, bandeko ya lisangá na Yerusaleme babondelaki elongo

Ndenge nini kokanisa elikya na biso elendisaka biso tóyika mpiko na bantango ya mpasi?

Mis 5:​40, 41; Ro 8:​35-39; 1Ko 4:​11-13; 2Ko 4:​16-18; 1Pe 1:​6, 7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 39:​19-23; 40:​1-8—Atako bakoselaki ye makambo mpe batyaki ye na bolɔkɔ, Yozefe atikalaki sembo mpe azalaki na mposa makasi ya kosalisa basusu

    • 2Ba 6:​15-17—Mosakoli Elisha abangaki te ntango limpinga moko eyaki kobundisa bango mpe abondelaki ete mosaleli na ye mpe abanga te

Biblia ekoki kolendisa yo

Elaka nini ya bolingo Yehova apesi biso?

Ndenge nini kokanisa motema molai mpe motema mawa ya Yehova elendisaka biso?

Yehova akoki kosala nini mpo na baoyo bazali komiyoka ete balɛmbi?

Nz 46:1; Yis 12:2; 40:​29-31; Flp 4:13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 1:​10, 11, 17, 18—Yehova ayokaki libondeli ya Hana mpe asalisaki ye azwa kimya ntango atungisamaki mpe azalaki mawamawa

    • 1Ba 19:​1-19—Ntango mosakoli Eliya alɛmbaki nzoto, Yehova apesaki ye lisalisi oyo ebongi. Alendisaki mpe abɔndisaki ye na ndenge apesaki ye elikya mpo na mikolo ezali koya

Ndenge nini elikya oyo Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya elendisaka biso?

2Nt 15:7; Nz 27:​13, 14; Ebr 6:​17-19; 12:2

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 14:​1, 2, 7-9, 13-15—Ata na ntango ya mpasi, elikya ya lisekwa ebɔndisaki Yobo

    • Da 12:13—Mosakoli Danyele, oyo azalaki na mbula soki 100, alendisamaki ntango anzelu ayebisaki ye mbano oyo akozwa na mikolo ezali koya

Mpo na nini kobondela mpe komanyola makambo oyo toyebi mpo na Yehova elendisaka biso?

Nz 18:6; 56:​4, 11; Ebr 13:6

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 30:​1-9—Ntango Davidi akutanaki na mpasi, abondelaki Yehova mpe azwaki makasi

    • Lk 22:​39-43—Ntango Yesu akutanaki na komekama makasi, abondelaki mingi mpe Yehova ayanolaki ye na ndenge atindaki anzelu alendisa ye

Ndenge nini lapolo ya malamu elendisaka biso mpe mpo na nini ezali malamu kokabola yango na basusu?

Mas 15:30; 25:25; Yis 52:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 15:​2-4—Ntoma Paulo ná Barnabasi balendisaki masangá oyo bakendaki kotala

    • 3Yn 1-4—Ntango ntoma Yoane akómaki mobange, alendisamaki makasi na koyoka ete bato oyo ateyaki solo bazali kobatela bosembo na bango