Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koyika mpiko

Koyika mpiko

Basaleli ya Yehova bazali na mposa ya ezaleli ya koyika mpiko?

Ndenge nini toyebi ete bato mosusu bakondima biso te to bakotɛmɛla biso na mosala ya kosakola?

Mt 10:22; Yn 15:​18, 19; 2Ko 6:​4, 5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Pe 2:5; Eb 7:23; Mt 24:​37-39—Atako Noa azalaki “mosakoli ya bosembo,” bato mingi bandimaki ye te, mpe kaka ye moko ná libota na ye nde babikaki na Mpela

    • 2Ti 3:​10-14—Ntoma Paulo asalelaki ndakisa na ye moko ya koyika mpiko mpo na kolendisa Timote ayika mpiko

Mpo na nini ekamwisaka biso te soki bato ya libota na biso batɛmɛli biso?

Mt 10:​22, 36-38; Lk 21:​16-19

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 4:​3-11; 1Yn 3:​11, 12—Lokola Kaina azalaki moto mabe, abomaki ndeko na ye Abele oyo azalaki sembo

    • Eb 37:​5-8, 18-28—Ntango Yozefe ayebisaki bandeko na ye ete Yehova alɔtisaki ye ndɔtɔ, babwakaki ye na libulu mpe batɛkaki ye lokola moombo

Ntango bazali konyokola biso, mpo na nini tosengeli te kobanga liwa?

Mt 10:28; 2Ti 4:​6, 7

Talá mpe Em 2:10

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova ata na ntango oyo bapesi biso disiplini?

Mas 3:​11, 12; Ebr 12:​5-7

Mpo na nini ekoki kozala mpasi koyika mpiko ntango basusu batiki kosambela Yehova?

Yir 1:​16-19; Hab 1:​2-4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 73:​2-24—Ntango atalaki ndenge bato mabe bazali na kimya mpe na bozwi, mokomi ya nzembo amitunaki soki koyika mpiko ezali na ntina na mosala na ye mpo na Yehova

    • Yn 6:​60-62, 66-68—Atako bato ebele batikaki kolanda Yesu, kondima ya ntoma Petro etindaki ye ayika mpiko

Nini ekosalisa biso tóyika mpiko?

Kokangama na Yehova

Kotánga Biblia mpe komanyola

Kobondela mpe koyebisa Yehova ndenge tozali komiyoka

Ro 12:12; Kol 4:2; 1Pe 4:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Da 6:​4-11—Mosakoli Danyele akobaki kobondela Yehova atako esalaki ete atya bomoi na ye na likama

    • Mt 26:​36-46; Ebr 5:7—Na butu ya nsuka ya bomoi na ye, Yesu abondelaki makasi mpe asɛngaki basusu básala bongo

Kosambela Yehova elongo na bandeko na biso bakristo

Kotya makanisi na bilaka ya Yehova

Kokómisa makasi bolingo mpo na Yehova, bandeko, mpe mpo na bosembo

Kokómisa kondima makasi

Kobatela makanisi malamu ntango tozali konyokwama

Wapi mwa matomba ya koyika mpiko na bosembo?

Tokopesa Yehova Nzambe lokumu

Mas 27:11; Yn 15:​7, 8; 1Pe 1:​6, 7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 1:​6-12; 2:​3-5—Satana atyaki ntembe na Yehova mpo na bosembo ya Yobo. Ntembe yango ekokaki kosila kaka soki Yobo ayiki mpiko na bosembo lokola mosaleli ya Yehova

    • Ro 5:19; 1Pe 1:​20, 21—Ntango Yesu ayikaki mpiko tii na nsuka, apesaki eyano na motuna moko ya ntina: Moto ya kokoka akoki kolonga likambo oyo Adama alongaki te, elingi koloba, kobatela bosembo ata na ntango ya komekama makasi?

Tokolendisa basusu báyika mpiko

Koyika mpiko ekosalisa biso tóbota mbuma na mosala ya kosakola

Soki toyiki mpiko Yehova akosepela na biso mpe akopesa biso mbano