Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kondima

Kondima

Ndenge nini toyebi ete Yehova asepelaka na ezaleli ya kondima?

Yn 3:​16, 18; Ga 3:​8, 9, 11; Ef 6:16; Ebr 11:6

Talá mpe 2Ko 5:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ebr 11:1–12:3—Ntoma Paulo alimbolaki liloba kondima mpe atángaki bandakisa ebele ya baoyo bazalaki na kondima. Abandaki na Abele mpe asukisaki na Yesu Kristo

    • Yk 2:​18-24—Yakobo asalelaki ndakisa ya Abrahama mpo na komonisa ete kondima na biso esengeli komonana na misala

Nini ekosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi?

Ro 10:​9, 10, 17; 1Ko 16:13; Yk 2:17

Talá mpe Ebr 3:​12-14

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 20:​1-6, 12, 13, 20-23—Ntango banguna bayaki kobundisa basaleli ya Nzambe, Mokonzi Yehoshafate ayebisaki bango ete mpo bálonga basengeli kondimela Yehova mpe basakoli na ye

    • 1Ba 18:​41-46—Mosakoli Eliya amonisaki kondima na ndenge azelaki na motema molai ete Yehova akokisa elaka na ye ya kobɛtisa lisusu mbula