Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libota

Libota

Yehova azalisaki ebongiseli ya libota

Baboti

Talá “Baboti

Batata

Talá “Batata

Bamama

Talá “Bamama

Mibali, Basi

Talá “Libala

Bana mibali mpe bana basi

Bana bazali na mokumba nini na libota?

Mpo na nini bana basengeli kotosa baboti na bango?

Ef 6:​1-3; Kol 3:20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 78:​1-8—Bayisraele bayebisaki bana na bango makambo oyo bankɔkɔ na bango basalaki ntango Yehova apesaki bango mibeko, mpo bana bátyela Nzambe motema mpe bákóma batomboki te

    • Lk 2:​51, 52—Atako azalaki moto ya kokoka, Yesu atosaki baboti na ye oyo bazangaki kokoka na bolenge na ye

Mpo na nini bana bakoki komona ete ezali mpasi bátosa baboti?

Ndenge nini Nzambe atalelaka bana oyo bazali batomboki?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 21:​18-21—Na kotalela Mibeko ya Moize, soki mwana azali motó makasi, motomboki mpe aboyi kotosa baboti na ye, asengelaki kobomama

    • 2Ba 2:​23, 24—Ntango bana batyolaki mosakoli Elisha, momonisi ya Nzambe, urse mibale elyaki bana ebele kati na bango

Ndenge nini baboti basengeli kotalela mokumba ya kobɔkɔla bana?

Nz 127:3; 128:3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Le 26:9—Epai ya Bayisraele, kobota bana ezalaki elembo ya lipamboli ya Yehova

    • Yb 42:​12, 13—Yehova apambolaki Yobo mpo na bosembo na ye mpe apesaki ye ná mwasi na ye bana mosusu zomi

Ndenge nini bandeko ya libota basengeli kosalelana makambo na ndenge oyo ekokumisa Yehova?

Nz 34:14; Mas 15:23; 19:11

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 27:41; 33:​1-11—Yakobo apesaki ndeko na ye Esau lokumu, abongisaki makambo mpo kimya ezala, mpe Esau andimaki yango na bolingo mpenza

Mokumba nini bana oyo bakoli bazali na yango epai ya baboti mpe bankɔkɔ na bango?

Mas 23:22; 1Ti 5:4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 11:​31, 32—Ntango balongwaki na Ure, Abrahama amemaki tata na ye Tera mpe abatelaki ye tii ntango akufaki

    • Mt 15:​3-6—Yesu asalelaki Mibeko ya Moize mpo na komonisa ete bana oyo bakoli basengeli kosalisa baboti na bango oyo bazali na bosɛnga

Babokilo to basɛmɛki

Bankɔkɔ

Talá “Bankɔkɔ