Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolimbisa

Kolimbisa

Yehova azalaka mpenza na mposa ya kolimbisa?

Nz 86:5; Da 9:9; Mik 7:18

Talá mpe 2Pe 3:9

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 78:​40, 41; 106:​36-46—Atako Bayisraele basalelaki Yehova mabe mbala na mbala, azalaki kaka kolimbisa bango

    • Lk 15:​11-32—Yesu asalelaki ndakisa mpo na komonisa ndenge oyo Yehova alimbisaka; alobelaki tata moko ya motema mawa oyo alimbisaki mwana oyo abongolaki motema atako asalaki mabe mingi

Yehova asalaki nini mpo masumu na biso elimbisama?

Yn 1:29; Ef 1:7; 1Yn 2:​1, 2

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ebr 9:​22-28—Ntoma Paulo alimbolaki ndenge oyo makila ya Kristo ezali nzela kaka moko mpo masumu na biso elimbisama

    • Em 7:​9, 10, 14, 15—Ntoma Yoane akomi ete Nzambe alimbisaka masumu ya “ebele mpenza ya bato” mpo bazali na kondima na mbeka ya Yesu

Soki tolingi Yehova alimbisa biso, tokosala nini ntango basusu basaleli biso lisumu?

Mt 6:​14, 15; Mr 11:25; Lk 17:​3, 4; Yk 2:13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 42:​7-10—Liboso Yehova abikisa Yobo na maladi mpe apambola ye, asɛngaki ye abondela mpo na baninga na ye misato oyo balobaki mabe mpo na ye

    • Mt 18:​21-35—Yesu apesaki ndakisa moko oyo emonisi ntina ya kolimbisa basusu soki tolingi Yehova alimbisa biso

Koyambola lisumu mpe kobongola mpenza motema ezali na ntina nini?

Mis 3:19; 26:20; 1Yn 1:​8-10

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 32:​1-5; 51:​1, 2, 16, 17—Lokola asalaki masumu minene, mokonzi Davidi amiyokaki ete motema na ye ebukani mpe etutami, mpe abongolaki mpenza motema

    • Yk 5:​14-16—Yakobo amonisi ete soki tosali lisumu, tosengeli kokende komona bankulutu

Mbongwana nini tosengeli kosala soki tolingi ete Yehova alimbisa biso?

Mas 28:13; Yis 55:7; Ef 4:28

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 21:​27-29; 2Nt 18:​18-22, 33, 34; 19:​1, 2—Mokonzi Ahaba ayokaki mawa ntango ayebaki ete Yehova akopesa ye etumbu, kasi abongolaki motema na ndenge ya solo te na mabe oyo asalaki. Yango wana Yehova alimbisaki ye te mpe abomaki ye

    • 2Nt 33:​1-16—Mokonzi Manase azalaki mpenza moto mabe; atako bongo, Yehova alimbisaki ye ntango abongolaki motema. Abongolaki motema na ndenge ya solo mpo alukaki kosilisa losambo ya bikeko mpe apesaki losambo ya pɛto mabɔkɔ

Yehova asepelaka kosala nini soki basumuki babongoli motema na ndenge ya solo?

Nz 103:​10-14; Yis 1:18; 38:17; Yir 31:34; Mik 7:19

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Sa 12:13; 24:1; 1Ba 9:​4, 5—Atako Davidi asalaki masumu minene, lokola abongolaki motema, Yehova alimbisaki ye mpe na nsima atángaki ye na molɔngɔ ya bato ya sembo

Ndenge nini Yesu amekolaki lolenge oyo Yehova asepelaka kolimbisa?

Nz 86:5; Lk 23:​33, 34

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 26:​36, 40, 41—Bayekoli ya Yesu balalaki na ntango oyo azalaki na mposa makasi ya lisalisi na bango; kasi Yesu ayebaki ete bazalaki ya kolɛmba atako bazalaki na mposa ya kosalisa ye

    • Mt 26:​69-75; Lk 24:​33, 34; Mis 2:​37-41—Petro awanganaki Yesu mbala misato, kasi Yesu alimbisaki ntoma na ye oyo abongolaki motema; nsima ya kosekwa, Yesu abimelaki ye mpe na nsima apesaki ye mikumba minene na lisangá

Ndenge nini toyebi ete kolimbisa ya Yehova ezali na ndelo?

Mt 12:31; Ebr 10:​26, 27; 1Yn 5:​16, 17

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 23:​29-33—Yesu akebisaki bakomeli ná Bafarisai ete bakokima te lisambisi ya Gehena to libebi ya libela

    • Yn 17:12; Mr 14:21—Yesu abengaki Yudasi Iskariote “mwana ya libebi” mpe alobaki ete elingaki kozala malamu koleka soki motɛki yango abotamaka te

Nini ekoki kotinda mokristo asepela kolimbisa?