Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolela

Kolela

Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete ezali mabe te kolela ntango moto moko akufi?

Nini emonisi ete Yehova azali na mposa makasi ya kobɔndisa baoyo bazali kolela?

Libɔndisi nini tozwaka ntango toyebaka solo mpo na bakufi?

Mos 9:​5, 10; 1Te 4:13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 20:​37, 38—Yesu alobaki ete lisekwa ekosalema mpenza, mpamba te mpo na Yehova ezali lokola bakufi bazali na bomoi

    • Yn 11:​5, 6, 11-14—Ntango moninga na ye Lazare akufaki, Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi

    • Ebr 2:​14, 15—Ntoma Paulo alimbolaki ete tosengeli te kozala na boombo ya kobanga liwa

Mpo na nini nkombo ya moto ekoki kozala na ntina mingi na mokolo ya liwa na ye?

Ndenge nini Biblia elobeli liwa, mpe Nzambe akosala liwa nini?

Mpo na nini tosengeli kondima ete lisekwa ekozala?

Yis 26:19; Yn 5:​28, 29; Mis 24:15

  • Bandakisa oyo ya Biblia ekoki kosalisa:

    • Na lisekwa ya bato libwa oyo Biblia elobeli, mwambe bazongaki na bomoi na mabele. Baoyo bazali kolela bato oyo babungisá na liwa, masolo yango ekoki kobɔndisa mpe kopesa bango elikya mpo na mikolo ezali koya

      • 1Ba 17:​17-24—Mosakoli Eliya asekwisaki mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá ya Zarefate, engumba moko na Sidone

      • 2Ba 4:​32-37—Mosakoli Elisha asekwisaki mwana moko na Shuneme mpe apesaki ye epai ya baboti na ye

      • 2Ba 13:​20, 21—Mobali moko oyo autaki kokufa asekwaki ntango nzoto na ye etutaki mikuwa ya mosakoli Elisha

      • Lk 7:​11-15—Na engumba ya Naine, Yesu asekwisaki mwana mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá ntango bazalaki kokende kokunda ye

      • Lk 8:​41, 42, 49-56—Yesu asekwisaki mwana mwasi ya Yairuse, mokambi moko ya sinagoga

      • Yn 11:​38-44—Yesu asekwisaki moninga na ye Lazare mpe azongisaki ye epai ya bandeko na ye, Marta ná Maria

      • Mis 9:​36-42—Ntoma Petro asekwisaki Dorkasi, mokristo oyo ayebanaki mpo na misala na ye ya boboto

      • Mis 20:​7-12—Ntoma Paulo asekwisaki elenge mobali Etishe, oyo akufaki ntango akweaki uta na fɛnɛtrɛ

    • Yehova asekwisaki Yesu na nzoto ya elimo oyo ekoki kokufa te, mpe yango esali ete bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya ekokisama

    • Yesu azali moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló mpe azwaki nzoto oyo ekoki kokufa te, kasi azali moto ya nsuka te; bayekoli na ye 144,000 oyo batyami mafuta na elimo bango mpe bakozwa yango

Ndenge nini tokoki kosalisa baoyo bazali kolela mpo babungisi bato oyo balingaka mingi na liwa?