Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Motema

Motema

Ndenge nini toyebi ete ntango Biblia esalelaka liloba “motema” emonisaka bomoto ya kati, oyo esangisi makanisi, mikano, bizaleli, mpe mayoki na biso?

Nz 49:3; Mas 16:9; Lk 5:22; Mis 2:26

Talá mpe Mib 15:7; Nz 19:8

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 9:​46-48—Yesu asembolaki bayekoli na ye mpo amonaki ete bazalaki koluka lokumu na mitema na bango

Mpo na nini ezali na ntina tóbatela motema na biso?

1Nt 28:9; Mas 4:23; Yir 17:9

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 6:​5-7—Mabe na motema ya moto etindaki ye na mobulu mpe yango esalaki ete Nzambe ayeisa Mpela

    • 1Ba 11:​1-10—Mokonzi Salomo abatelaki motema na ye te, abalaki basi bapaya oyo babendaki motema na ye mosika na Yehova

    • Mr 7:​18-23—Yesu amonisaki ete eloko nyonso oyo ekoki kokómisa moto mbindo na miso ya Nzambe eutaka na motema

Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso?

Nz 19:14; Mas 3:​3-6; Lk 21:34; Flp 4:8

Talá mpe Ezr 7:​8-10; Nz 119:11

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ef 6:​14-18; 1Te 5:8—Ntango alobelaki molato ya elimo, ntoma Paulo alimbolaki ete bosembo, kondima, mpe bolingo ekoki kobatela motema ya elilingi kaka ndenge ebateli-ntolo ebatelaka motema

Ndenge nini tokoki koyeba soki motema na biso ya elilingi ezali na likambo moko ya mabe?

Mas 21:​2-4; Ebr 3:12

Talá mpe Mas 6:​12-14

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 25:​1, 2, 17-27—Na mwa ntango moko boye, Mokonzi Amazia asalaki oyo ezali malamu na miso ya Nzambe kasi na motema mobimba te. Kendekende, akómaki na lofundo, azalaki lisusu sembo te mpe yango ememelaki ye mpasi

    • Mt 7:​17-20—Yesu amonisaki ete kaka ndenge nzete ya mabe ebotaka mbuma ya mabe, motema ya mabe mpe ebotaka etamboli ya mabe

Mpo na nini tosengeli kokóma na motema ya malamu, mpe tokosala yango ndenge nini?

Mas 10:8; 15:28; Lk 6:45

Talá mpe Nz 119:​97, 104; Ro 12:​9-16; 1Ti 1:5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ba 20:​1-6—Ntango alingaki kokufa, Mokonzi Ezekiasi abondelaki Yehova ayokela ye mawa mpo asalelaki Ye na motema mobimba

    • Mt 21:​28-32—Yesu asalelaki ndakisa mpo na komonisa ete moto asalaka makambo oyo ezali na motema na ye, koleka kutu makambo oyo alobi ete akosala

Mpo na nini koyeba ete Yehova atalaka mitema ebɔndisaka biso?

1Nt 28:9; Yir 17:10

Talá mpe 1Sa 2:3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 16:​1-13—Mosakoli Samwele azwaki liteya ete Yehova atalaka te oyo emonanaka na miso; kasi atalaka nde na kati ya motema ya moto

    • 2Nt 6:​28-31—Libondeli ya Mokonzi Salomo na ntango ya bofungoli tempelo emonisaki ete Nzambe atángaka motema ya moto mpe asalelaka makambo oyo amoni na kati mpo na kosalisa ye