Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batitre ya lokumu

Batitre ya lokumu

Bakristo basengeli kosalela batitre ya lokumu ya mangomba?

Yn 5:41

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 18:​18, 19—Atako azalaki moto malamu, Yesu aboyaki bábenga ye “Moteyi malamu.” Alobaki ete kaka Yehova nde azali malamu

Mpo na nini bakristo ya solo babengaka bato te na batitre ya mangomba, na ndakisa “Tata” to “Mokambi”?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 23:​9-12—Yesu apekisaki kobenga bato na batitre ya lokumu, na ndakisa “Tata” to “Mokambi”

    • 1Ko 4:​14-17—Atako ntoma Paulo azalaki lokola tata mpo na bato mingi, esika moko te abengami “Tata Paulo” to na batitre mosusu lokola oyo wana

Mpo na nini ebongi bakristo básalelanaka makambo lokola bandeko mpe bábenganaka bandeko?

Mt 23:8

Talá mpe Mis 12:17; 18:18; Ro 16:1

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 12:​46-50—Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye nde bazali bandeko na ye ya elimo

Mpo na nini ezali mabe te bakristo básalelaka batitre mpo na kobenga bato ya Leta, bakonzi ya politiki, bazuzi, mpe bakonzi mosusu?

Ro 13:​1, 7; 1Pe 2:17

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 26:​1, 2, 25—Ntoma Paulo abengaki bakonzi ya guvɛrvɛnema, na ndakisa Agripa mpe Festusi, na batitre na bango ya lokumu