Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Komikitisa

Komikitisa

Ndenge nini Yehova atalelaka bato ya komikitisa mpe bato ya lolendo?

Nz 138:6; Mas 15:25; 16:​18, 19; 22:4; 1Pe 5:5

Talá mpe Mas 29:23; Yis 2:​11, 12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 26:​3-5, 16-21—Mokonzi Uzia akómaki na lolendo; abukaki mibeko ya Nzambe mpe akómaki na nkanda ntango bapesaki ye toli. Nzambe apesaki ye etumbu ya maba

    • Lk 18:​9-14—Yesu asalelaki ndakisa mpo na kolimbola ndenge Yehova atalelaka mabondeli ya bato ya lolendo mpe ya bato ya komikitisa

Nzambe asalaka nini ntango moto ya komikitisa abongoli mpenza motema?

2Nt 7:​13, 14; Nz 51:​2-4, 17

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 12:​5-7—Mokonzi Rehoboame mpe bankumu ya Yuda bamikitisaki liboso ya Yehova mpe abomaki bango lisusu te

    • 2Nt 32:​24-26—Ezekiasi, mokonzi malamu, akómaki na lolendo, kasi Yehova alimbisaki ye ntango amikitisaki

Ndenge nini komonisa komikitisa esalisaka biso tókómisa makasi boyokani na biso na basusu?

Ef 4:​1, 2; Flp 2:3; Kol 3:​12, 13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 33:​3, 4—Esau azalaki na nkanda ya Yakobo, kasi Yakobo amonisaki komikitisa ntango akutanaki na ndeko na ye, mpe kimya ezongaki kati na bango

    • Bas 8:​1-3—Mosambisi Gideone amonisaki komikitisa mpe ayebisaki mibali ya Efraime ete baleki ye; yango ekitisaki nkanda na bango mpe babundisaki ye te

Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya kozala na komikitisa?

Mt 18:​1-5; 23:​11, 12; Mr 10:​41-45

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yis 53:7; Flp 2:​7, 8—Ndenge bisakweli elobaki yango, Yesu azalaki na komikitisa, andimaki koya awa na mabele, konyokwama ata mpe kokufa liwa ya nsɔni

    • Lk 14:​7-11—Yesu asalelaki ndakisa ya bisika ya kofanda na fɛti mpo na komonisa ntina ya kozala na komikitisa

    • Yn 13:​3-17—Yesu ateyaki bayekoli na ye ezaleli ya komikitisa ntango asukolaki bantoma na ye makolo

Soki tozali komitalela mpe kotalela basusu ndenge Yehova atalelaka bango, ndenge nini yango ekosalisa biso tózala na komikitisa?

Mpo na nini kozala na komikitisa ya lokuta ezali na ntina te?