Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobatela bosembo

Kobatela bosembo

Kobatela bosembo ezali nini?

Nz 18:​23-25; 26:​1, 2; 101:​2-7; 119:​1-3, 80

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Le 22:​17-22—Yehova azalaki kosɛnga bambeka ya banyama oyo “ezangi mbeba.” Liloba oyo basaleli mpo na “kozanga mbeba” ezali na boyokani na liloba ya Ebre oyo ebongolami na “bosembo,” yango emonisi ete kobatela bosembo esɛngi kokangama mobimba na Yehova

    • Yb 1:​1, 4, 5, 8; 2:3—Bomoi ya Yobo emonisaki ete mpo na kobatela bosembo, moto asengeli kozala na limemya makasi epai ya Yehova, kosambela ye na motema mobimba, mpe koboya oyo ezali mabe na miso na ye

Mpo na nini kobatela bosembo ezali ntina?

Nini ekoki kotinda biso tóbatela bosembo?

1Nt 29:17; Pr 2:7

Talá mpe Mas 27:11; 1Yn 5:3

Ndenge nini tokoki kokolisa mpe kobatela bosembo na biso?

Yos 24:​14, 15; Nz 101:​2-4

Talá mpe Mib 5:29; Yis 48:​17, 18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 31:​1-11, 16-33—Yobo abatelaki bosembo na bomoi na ye na ndenge aboyaki bomoi ya mbindo mpe azalaki kosalela basusu makambo na boboto mpe limemya. Abatelaki losambo ya Yehova pɛto, asambelaki bikeko te mpe biloko ya mokili ezwaki esika ya liboso te na bomoi na ye

    • Da 1:​6-21—Atako bazalaki kofanda na bato oyo bazalaki bandimi te, Danyele ná baninga na ye misato babatelaki bosembo ata ntango bazalaki kopona bilei ya kolya

Moto akoki lisusu kozongela bosembo na ye ata soki asali mabunga mingi?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 9:​2-5; Nz 78:​70-72—Lokola Mokonzi Davidi abongolaki motema, Yehova alimbisaki ye mpe atalelaki ye lokola moto oyo atambolaki na bosembo

    • Yis 1:​11-18—Atako Yehova alobelaki bokosi mpe masumu ya bato na ye, alakaki ete soki babongoli motema mpe batiki kosala mabe akolimbisa bango