Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bolingo ya biloko ya mokili

Bolingo ya biloko ya mokili

Biblia epekisi kozala na mbongo mpe biloko ya mokili?

Mos 7:12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 3:​11-14—Yehova apambolaki Mokonzi Salomo na bozwi mingi mpo azalaki na komikitisa

    • Yb 1:​1-3, 8-10—Atako Yobo azalaki na bozwi mingi, boyokani na ye na Yehova ezalaki na ntina mingi koleka

Mpo na nini bozwi to biloko ya mokili epesaka esengo ya solosolo te?

Na ntango nini bozwi ekoki kozala na ntina te?

Wapi likama eleki monene ya kozala na mbongo mpe bozwi mingi?

Ndenge nini tokoki kokosama na nguya ya bomɛngo?

Mas 11:​4, 18, 28; 18:11; Mt 13:22

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 8:​18-24—Na bozoba nyonso, Simo akanisaki ete akoki kosomba mikumba na lisangá ya bokristo na mbongo

Tokoki kobungisa nini soki tolingaka mbongo?

Mt 6:​19-21; Lk 17:​31, 32

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mr 10:​17-23—Elenge mobali oyo akangamaki makasi na bomɛngo abungisaki libaku ya kozala moyekoli ya Yesu

    • 1Ti 6:​17-19—Ntoma Paulo akebisaki bakristo oyo bazalaki na bozwi ete bázala lolendo te, mpo yango ekoki kosala ete básepelisa Nzambe te

Ndenge nini bolingo ya biloko ya mokili ekoki kolɛmbisa kondima mpe kosala ete tósepelisa Nzambe te?

Mib 8:​10-14; Mas 28:20; 1Yn 2:​15-17

Talá mpe Nz 52:​6, 7; Am 3:​12, 15; 6:​4-8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 31:​24, 25, 28—Yobo amonaki polele likama ya kotya motema na bozwi, oyo ekoki kotinda moto awangana Nzambe

    • Lk 12:​15-21—Yesu akebisaki bato na bolingo ya biloko ya mokili ntango alobelaki lisolo ya mozwi oyo azalaki mobola na miso ya Nzambe

Ndenge nini tokoki kosepela na biloko oyo tozali na yango?

Biloko nini ezali na motuya koleka biloko ya mokili, mpe mpo na nini?

Mas 3:​11, 13-18; 10:22; Mt 6:​19-21

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Hag 1:​3-11—Na nzela ya Hagai, Yehova amonisaki ete apimelaki bato na ye ata biloko ya mokili mpo batyaki bandako mpe biloko na bango ya kitoko liboso na esika ya kotonga tempelo na ye mosantu

    • Re 3:​14-19—Yesu apesaki bakristo ya Laodikia toli ya makasi mpo biloko ya mokili ezalaki na motuya mingi na miso na bango koleka kosalela Nzambe

Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova akopesa biso biloko oyo tosengeli na yango mpo tózala na bomoi?