Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mawa

Mawa

Mawa

Mawa esangisi bizaleli nini?

Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Nz 51:​1, 2—Ntango Mokonzi Davidi abondelaki Yehova ayokela ye mawa, asɛngaki ye alimbisa ye mpe apɛtola masumu na ye

Lk 10:​29-37—Yesu asalisi biso tóyeba koyokela bato mawa ndenge apesaki ndakisa ya Mosamaria oyo amonisaki boboto mpe atyelaki Moyuda likebi

Mpo na nini esengeli koyokela moto nyonso mawa?

Nz 130:3; Mos 7:20; 1Yn 1:8

Talá mpe 1Ba 8:​46-50

Ndenge nini toyebi ete Yehova ayokelaka bato mawa?

Kob 34:6; Ne 9:17; Nz 103:8; 2Ko 1:3

Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Yb 42:​1, 2, 6-10; Yk 5:11—Yehova ayokelaki Yobo mawa mpe ateyaki ye ndenge ya koyokela basusu mawa

Lk 15:​11-32—Yesu alobelaki motema mawa ya Yehova na ndakisa oyo apesaki ya tata oyo alimbisaki mwana na ye oyo abongolaki motema

Mpo na nini Yehova ayokelaka biso mawa?

Ro 5:8; 1Yn 4:​9, 10

Talá mpe Tit 3:​4, 5

Ndenge nini mbeka ya Kristo esalisaka mpo masumu na biso elimbisama?

Lk 24:47; Mis 10:43; 1Yn 1:​7, 9

Mpo na nini esengeli tósɛngaka ete Nzambe ayokela biso mawa mpe kozala na botɔndi mpo na likabo yango?

Lk 11:​2-4; Ebr 4:16

Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Nz 51:​1-4—Mokonzi Davidi ayokaki mawa mpo na masumu na ye, amikitisaki mpe asɛngaki Yehova ayokela ye mawa

Lk 18:​9-14—Yesu apesaki ndakisa mpo na komonisa ete baoyo bamikitisi mpe bandimi mabunga na bango, Yehova akoyokela bango mawa

Mpo na nini ata baoyo basali masumu minene bakoki kolikya ete Nzambe akoyokela bango mawa?

Mib 4:​29-31; Yis 55:7

Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

2Nt 33:​9-13, 15—Atako Manase azalaki mokonzi mabe, abongolaki motema mpe asɛngaki Nzambe ayokela ye mawa; azongelaki bokonzi, mpe makambo asalaki na nsima emonisaki ete abongwanaki mpenza

Yon 3:​4-10—Bato ya Ninive bazalaki mobulu mpe babomaki bato ebele, kasi babongolaki motema mpe Nzambe ayokelaki bango mawa

Mpo na nini ezali na ntina moto ayambola lisumu mpe atika mabe mpo Yehova ayokela ye mawa?

Nz 32:5; Mas 28:13; 1Yn 1:9

Ata soki Yehova alimbisi biso, masumu ekoki kobimisela biso mpasi to konyokola biso

Kob 34:​6, 7; 2Sa 12:​9-13

Mpo na nini tosengeli koyokela basusu mawa?

Mt 6:14; Lk 6:36; Kol 3:13

Soki toboyi koyokela basusu mawa, yango ekoki kosala nini na boyokani na biso na Yehova?

Mt 9:13; 23:23; Yk 2:13

Talá mpe Mas 21:13

Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Mt 18:​23-35—Yesu apesaki ndakisa oyo emonisi ete soki toboyi koyokela basusu mawa Yehova mpe akoyokela biso mawa te

Lk 10:​29-37—Yesu apesaki ndakisa oyo emonisi ete ye ná Tata na ye basepelaka te na baoyo bayokelaka basusu mawa te, kasi basepelaka nde na baoyo bazalaka lokola Mosamaria ya motema mawa

Yehova asalaka nini mpo na baoyo bayokelaka basusu mawa?

Mt 5:7; Mr 11:25