Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Motema pɛtɛɛ

Motema pɛtɛɛ

Ndenge nini toyebi ete Yehova amonisaka motema pɛtɛɛ?

Mt 11:​28, 29; Yn 14:9

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 19:12—Atako mosakoli Eliya atungisamaki makasi, Yehova alobaki na ye na “mongongo moko ya kimya, ya nse”

    • Yon 3:10–4:11—Atako Yona alobaki na Yehova na nkanda, kasi na boboto Yehova ateyaki ye koyokela basusu mawa

Ndenge nini tokoki komonisa motema pɛtɛɛ?

Mas 15:1; Ef 4:​1-3; Tit 3:2; Yk 3:​13, 17; 1Pe 3:15

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mit 11:​26-29—Mosakoli Moize ayanolaki na boboto ntango Yosua asɛngaki ye apekisa baoyo bazalaki kosala lokola basakoli

    • Bas 8:​1-3—Motema pɛtɛɛ ya Gideone ebomaki mɔtɔ oyo elingaki kopela