Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mbongo

Mbongo

Mpo na nini bolingo ya mbongo ezali likama?

Ndenge nini Biblia emonisi ete ezali mabe te koluka mbongo mpo na kokokisa bamposa ya libota?

Mos 7:12; 10:19; Ef 4:28; 2Te 3:10; 1Ti 5:​8, 18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 31:​38-42—Mpo na kokokisa bamposa ya libota, Yakobo asalelaki tata bokilo na ye na bosembo, kasi Labana asalelaki ye makambo na bosembo te; Yehova apambolaki Yakobo mpo na mosala na ye

    • Lk 19:​12, 13, 15-23—Yesu apesaki ndakisa moko oyo emonisi ete ezalaki mabe te na mikolo na ye kotya mbongo na mombongo mpo ebota lisusu mingi

Mitinda nini ya Biblia epesi batoli mpo na likambo etali kodefa mpe kodefisa mbongo?

Mpo na nini eleki malamu koboya banyongo ezangá ntina?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ne 5:​2-8—Bayisraele mosusu na mikolo ya Nehemia bazalaki kosalela baoyo bazalaki na banyongo na bango makambo na boboto te

    • Mt 18:​23-25—Ndakisa ya Yesu ekundweli biso ete soki modefi aboyi kofuta nyongo akoki kozwa etumbu

Bibongiseli nini moto asengeli kozwa liboso akɔta na makambo ya mombongo, ezala elongo na moto oyo azali mondimi te, ndeko na lisangá to mpe ndeko na libota?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 23:​14-20—Ntango Abrahama akendaki kokunda Sara, asombaki elanga mpe mobenga moko liboso ya bato oyo bazalaki lokola batatoli mpo na nsima moto moko te abimisa matata

    • Yir 32:​9-12—Ntango Yirimia asombaki elanga ya mwana ya ndeko na ye, bakomaki mokanda, basalaki kopi na yango, mpe afutaki mbongo liboso ya batatoli

Mpo na nini ezali bwanya kosalela mbongo na mayele?

Mpo na nini bakristo basengeli kotika te ete matata mpo na mbongo ekɔtisa bokabwani na lisangá?

Ndenge nini tokoki kosalela mbongo na ndenge oyo ekopesa biso esengo ya solosolo?