Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Botosi

Botosi

Mpo na nini botosi ezali na ntina?

Kob 19:5; Mib 10:​12, 13; Mos 12:13; Yk 1:22

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 15:​17-23—Mosakoli Samwele apamelaki Mokonzi Saulo mpo atosaki Yehova te; na nsima Samwele amonisaki ete kotosa ezali na ntina mingi

    • Ebr 5:​7-10—Atako Yesu azali Mwana ya kokoka ya Nzambe, awa na mabele atosaki Tata na ye ntango basusu basalaki ye mabe

Mokristo akosala nini soki bakonzi ya mboka basɛngi ye abuka mobeko ya Nzambe?

Mis 5:29

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Da 3:​13-18—Atako bomoi na bango etyamaki na likama, Baebre misato ya sembo baboyaki kosambela ekeko oyo Mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmisaki

    • Mt 22:​15-22—Yesu amonisaki ete bayekoli na ye basengeli kotosa bakonzi ya Leta soki basɛngi bango te básala likambo oyo ebuki mobeko ya Nzambe

    • Mis 4:​18-31—Ata ntango bakonzi bapekisaki bango kosakola, bantoma bakobaki kosakola na molende

Tosengeli kosala nini soki tolingi kotosa mibeko ya Yehova ntango nyonso?

Mib 6:​1-5; Nz 112:1; 1Yn 5:​2, 3

Talá mpe Nz 119:​11, 112; Ro 6:17

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ezr 7:​7-10—Ezera, nganga-nzambe ya sembo, abongisaki motema na ye mpo apesa ndakisa na likambo etali kotosa Mobeko ya Nzambe mpe koteya yango basusu

    • Yn 14:31—Yesu amonisaki ntina oyo asalaki makambo kaka ndenge Tata na ye atindaki ye asala

Nini esengeli kotinda biso tótosa Yehova mpe Yesu?

Ndenge nini botosi na biso emonisaka ete tozali na kondima?

Ro 1:5; 10:​16, 17; Yk 2:​20-23

Talá mpe Mib 9:23

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 6:​9-22; Ebr 11:7—Noa amonisaki kondima ntango atongaki masuwa kaka ndenge Yehova apesaki ye mitindo, asalaki “kaka bongo”

    • Ebr 11:​8, 9, 17—Abrahama amonisaki kondima kaka te ntango Yehova asɛngaki ye abima na Ure kasi mpe ntango andimaki kopesa mwana na ye kaka moko lokola mbeka

Elaka nini Yehova apesi baoyo batosaka ye?

Yir 7:23; Mt 7:21; 1Yn 3:22

Kozanga botosi ememaka nini?

Ro 5:19; 2Te 1:​8, 9

Mpo na nini tosengeli kotosa Yesu Kristo?

Eb 49:10; Mt 28:18

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Mpo na nini bakristo batosaka bakɛngɛli na lisangá?

Mpo na nini mwasi mokristo asengeli komikitisa liboso ya mobali na ye?

Mpo na nini bana batosaka baboti na bango?

Mas 23:22; Ef 6:1; Kol 3:20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 37:​3, 4, 8, 11-13, 18—Elenge Yozefe atosaki tata na ye mpe akendaki kotala bandeko na ye atako bayinaki ye

    • Lk 2:51—Yesu akobaki kotosa Yozefe ná Maria atako azalaki moto ya kokoka kasi baboti na ye bazangaki kokoka

Mpo na nini tosengeli kotosa bapatrɔ na biso ata ntango moto moko te azali komona biso?

Mpo na nini bakristo batosaka bakonzi ya Leta?