Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikóló mpe mibange

Mikóló mpe mibange

Nini ekómelaka biso soki tokómi mikóló?

Nz 71:9; 90:10

Talá mpe “Libɔndisi—Kokoka kosala lisusu mingi te mpo na maladi to bobange

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mos 12:​1-8—Mokonzi Salomo asalelaki maloba ya ntɔki mpo na kolobela mwa mikakatano oyo bobange ememaka, na ndakisa komona malamu te (“basi oyo batalaka na bafɛnɛtrɛ bamoni molili”) mpe koyoka malamu te (“bana basi nyonso ya loyembo babandi kolɛmba”)

Mibange bakoki kobatela esengo na bango atako mikakatano mpe bazali kokoka kosala lisusu mingi te?

2Ko 4:​16-18; Yk 1:​2-4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 12:​2, 23—Atako akómaki mobange, mosakoli Samwele ayebaki ntina ya kokoba kobondela mpo na bolamu ya bato ya Yehova

    • 2Sa 19:​31-39—Mokonzi Davidi azalaki na botɔndi epai ya mobange Barazilai. Mpe na komikitisa nyonso, Barazilai ayebisaki Mokonzi Davidi ete akokoka te kosalela ye na Yerusaleme

    • Nz 71:​9, 18—Lokola akómaki mobange, Mokonzi Davidi akómaki kobanga ete azala lisusu na ntina te na miso ya Yehova, yango wana abondelaki Yehova ete abwaka ye te kasi apesa ye makasi mpo akoka koteya libota oyo ekoya

    • Lk 2:​36-38—Mosakoli mwasi Ana, mobange oyo mobali akufá, azwaki lipamboli mpo na ezaleli na ye ya kokangama na Nzambe mpe bosembo

Ndenge nini Yehova amonisi mibange ete azwaka bango na motuya?

Nz 92:​12-14; Mas 16:31; 20:29; Yis 46:4; Tit 2:​2-5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 12:​1-4—Ntango Abrahama akómaki na mbula 75, Yehova apesaki ye mokumba oyo ebongolaki bomoi na ye

    • Da 10:​11, 19; 12:13—Ntango Danyele azalaki na mbula mwa moke koleka 90, anzelu moko abimelaki ye mpo na koyebisa ye ete azali na motuya na miso ya Yehova mpe akozwa mbano mpo na bosembo na ye

    • Lk 1:​5-13—Yehova apambolaki Zekaria mpe Elizabeti na ndenge apesaki bango mwana mobali, Yoane, na ndenge ya likamwisi atako bakómaki mibange

    • Lk 2:​25-35—Yehova apesaki mobange Simeone libaku ya komona mwana oyo akokóma Masiya; Simeone asakolaki mpo na ye

    • Mis 7:​23, 30-36—Ntango Moize akómaki na mbula 80, Yehova apesaki ye mokumba ya kokamba bato na ye, Yisraele

Ndenge nini tosengeli kosalela mibange ya sembo makambo?

Le 19:32; 1Ti 5:1

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa mibange na lisangá?