Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baboti

Baboti

Wapi mwa bantina oyo Yehova abandisaki libala?

Ndenge nini baboti basengeli kotalela bana na bango?

Nz 127:​3-5; 128:3

Talá mpe “Bana mpe bilenge

Baboti bazali na mokumba nini epai ya bana?

Mib 6:​6, 7; 11:​18, 19; Mas 22:6; 2Ko 12:14; 1Ti 5:8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 1:​1-4—Elekana amemaki libota na bafɛti na Shilo, mpe amindimisaki ete mwana nyonso azali kosambela Yehova

    • Lk 2:​39, 41—Mbala mingi Yozefe ná Maria elongo na bana na bango bazalaki kolongwa na Nazarete mpe kokende na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli

Mpo na nini ezali na ntina koteya bana básepelisa Yehova?

Mas 1:​8, 9; 22:6

Talá mpe 2Ti 3:​14, 15

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 2:​18-21, 26; 3:19—Baboti ya Samwele bapesaki mwana na bango mpo asala na tabernakle, kasi bazalaki kotala ye mbala na mbala mpe kokokisa bamposa na ye; ntango akolaki azalaki makasi na elimo

    • Lk 2:​51, 52—Yesu atosaki baboti na ye atako bazangaki kokoka

Epai wapi baboti bakoki kozwa litambwisi mpo na kobɔkɔla bana na bango?

Mib 6:​4-9; Ef 6:4; 2Ti 3:​14-17

Talá mpe Nz 127:1; Pr 16:3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Bas 13:​2-8—Ntango bayebisaki ye ete mwasi na ye akozwa zemi na ndenge ya likamwisi, Manoa atunaki mpo ayeba ndenge ya kobɔkɔla mwana yango

    • Nz 78:​3-8—Yehova alingi ete baboti báteya bana makambo oyo bayekoli na Biblia

Ata soki mwana akolá na libota oyo elingaka Nzambe, mpo na nini akoki koboya kosalela Yehova?

Ezk 18:​1-13, 20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 6:​1-5; Yd 6—Atako balekisaki bambula ebele mpenza na likoló elongo na Yehova, baanzelu ebele batombokaki

    • 1Sa 8:​1-3—Atako Samwele azalaki mosakoli ya sembo mpe ya boyengebene, bana na ye bakómaki na bizaleli ya mabe

Ntango nini baboti basengeli kobanda koteya bana banzela ya Nzambe?

2Ti 3:15

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mib 29:​10-12, 29; 31:12; Ezr 10:1—Bayisraele bazalaki komema bana na bango na mayangani mpo bango mpe báyekola banzela ya Yehova

    • Lk 2:​41-52—Mbula na mbula, Yozefe ná Maria bazalaki komema bana na bango, ezala mpe Yesu, na fɛti ya Elekeli na tempelo ya Yerusaleme

Bandakisa nini baboti basengeli kolanda ntango esɛngi bábatela bana na baoyo bakoki kosala bango mabe?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Kob 19:4; Mib 32:​11, 12—Yehova amikokanisi na mpongo oyo ememaka bana na yango, ebatelaka mpe eleisaka yango

    • Yis 49:15—Yehova alaki ete akoleisa mpe akobatela basaleli na ye koleka ndenge oyo mama amonisaka mawa epai ya mwana na ye oyo azali komɛlisa

    • Mt 2:​1-16—Satana alukaki koboma Yesu ntango abotamaki ndenge asalaki ete banganga-minzoto bákende epai ya Mokonzi Erode, kasi Yehova abatelaki mwana na ye ndenge asalaki ete Yozefe ná libota na ye bákende na Ezipito

    • Mt 23:37—Yesu akokanisi mposa na ye ya kosalisa bato na ye na ndenge nsoso ya mwasi esangisaka mpe ebatelaka bana na nse ya mapapu na yango

Mpo na nini baboti basengeli koteya bana makambo ya kosangisa nzoto?

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Le 15:​2, 3, 16, 18, 19; Mib 31:​10-13—Mibeko ya Moize elobeli polele makambo ya kosangisa nzoto, mpe Yehova asɛngaki ete bana bázala wana ntango ezali kotángama na mongongo makasi

    • Nz 139:​13-16—Davidi, mokomi ya Nzembo, akumisaki Yehova na ndenge nzoto ya moto esalemá, ezala mpe likoki ya kobota

    • Mas 2:​10-15—Boyebi mpe bwanya ya Yehova ekoki kobatela biso na basali-mabe mpe bakosi

Mpo na nini baboti basengeli kopesa bana disiplini na bolingo?

Mas 13:24; 29:17; Yir 30:11; Ef 6:4

Talá mpe Nz 25:8; 145:9; Kol 3:21

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Nz 32:​1-5—Atako Mokonzi Davidi ayokaki mpasi ntango Yehova apesaki ye disiplini, kasi abɔndisamaki ndenge ayebaki ete Yehova alimbisaka baoyo babongoli mpenza motema

    • Yon 4:​1-11—Mosakoli Yona alobaki na Yehova na nkanda mpe na limemya te; kasi Yehova amoniselaki ye motema molai mpe ateyaki ye motema mawa

Mpo na nini kopesa bana disiplini ezali lolenge baboti bamonisaka ete balingaka bango?