Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Monyoko

Monyoko

Mpo na nini bakristo basengeli koyeba ete bakonyokola bango?

Ntango banyokoli biso, mpo na nini tosengeli koluka lisalisi epai ya Yehova?

Nz 55:22; 2Ko 12:​9, 10; 2Ti 4:​16-18; Ebr 13:6

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 19:​1-18—Ntango banyokolaki ye, mosakoli Eliya asopelaki Yehova mitungisi na ye; alendisamaki mpe azwaki libɔndisi

    • Mis 7:​9-15—Atako bandeko na ye banyokolaki ye, Yehova azalaki kaka sembo epai ya Yozefe, abikisaki ye mpe asalelaki ye mpo na kobikisa libota na ye

Wapi mwa mitindo ya monyoko?

Maloba ya mabe

2Nt 36:16; Mt 5:11; Mis 19:9; 1Pe 4:4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ba 18:​17-35— Rabashake, molobeli ya mokonzi ya Asiri, afingaki Yehova mpe atyolaki bato ya Yerusaleme

    • Lk 22:​63-65; 23:​35-37—Banyokoli ya Yesu bafingaki mpe basɛkaki ye ntango bakangaki ye mpe ntango azalaki na nzete ya mpasi

Ntango bandeko ya libota batɛmɛli biso

Ntango bakangi mpe bamemi biso epai ya bakonzi

Kobɛta

Ntango etuluku ya bato ebundisi biso

Koboma

Bakristo basengeli kosala nini ntango bazali konyokola bango?

Mt 5:44; Mis 16:25; 1Ko 4:​12, 13; 1Pe 2:23

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 7:57–8:1—Atako etuluku ya bato bakómisaki ye pene ya liwa, moyekoli Stefano asɛngaki Nzambe ayokela bango mawa, Saulo ya Tarsi mpe azalaki na kati na bango

    • Mis16:​22-34—Atako babɛtaki ntoma Paulo mpe batyaki ye na bikanga-makolo, amoniselaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ boboto; yango esalaki ete moto yango mpe libota na ye bákóma bandimi

Nini ekómelaki bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso?

Wapi lolenge ya malamu ya kotalela monyoko?

Ndenge nini elikya na biso mpo na mikolo ezali koya epesaka biso makasi ntango bazali konyokola biso?

Mpo na nini totikaka te ete monyoko esala ete tóyoka nsɔni, tóbanga to tólɛmba nzoto, mpe mpo na nini totikaka te kosalela Yehova?

Nz 56:​1-4; Mis 4:​18-20; 2Ti 1:​8, 12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 32:​1-22—Ntango Mokonzi Senakeribe ayaki na limpinga monene kobundisa Yerusaleme, Ezekiasi, mokonzi ya sembo atyelaki Yehova motema, apesaki bato makasi, mpe azwaki mpenza mbano

    • Ebr 12:​1-3—Banyokoli balukaki koyokisa Yesu nsɔni, kasi atikaki te ete yango elɛmbisa ye nzoto ata na ndenge nini

Likambo nini ya malamu ekoki komonana soki banyokoli biso?

Ntango toyikaka mpiko na komekama, esepelisaka Yehova mpe ekumisaka nkombo na ye

1Pe 2:​19, 20; 4:​12-16

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 1:​6-22; 2:​1-10—Atako ayebaki te ete Satana nde azalaki kobimisela ye mpasi wana, Yobo apesaki Yehova mokɔngɔ te. Yango epesaki Yehova nkembo mpe emonisaki ete Satana azali mokosi

    • Da 1:​6, 7; 3:​8-30—Bato ya sembo Hanania, Mishaele ná Azaria (Shadrake, Meshake ná Abedenego) bandimaki kokufa liwa ya nsɔmɔ, na esika ya kozanga botosi epai ya Yehova; esalaki ete Mokonzi Nebukadenezare mopakano akumisa Yehova liboso ya bato

Monyoko ekoki kosala ete bato báyekola koyeba Yehova

Lk 21:​12, 13; Mis 8:​1, 4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 11:​19-21—Ntango bakristo bapanzanaki mpo na monyoko bakobaki kosakola nsango malamu na bisika mingi

    • Flp 1:​12, 13—Ntoma Paulo asepelaki mpo bolɔkɔ na ye esalaki ete bato mingi báyeba nsango malamu

Soki toyiki mpiko na minyoko tokoki kolendisa bandeko na biso

Mbala mingi banani bazalaka nsima ya bato oyo banyokolaka basaleli ya Yehova?

Yir 26:11; Mr 3:6; Yn 11:​47, 48, 53; Mis 25:​1-3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 19:​24-29—Na Efese, baoyo bazalaki kosala bikeko mpo na Artemisi bamonaki ete nsango oyo bakristo bazalaki kosakola epekisaki bikeko ekobebisa mombongo na bango, yango wana banyokolaki bakristo

    • Ga 1:​13, 14—Liboso akóma mokristo, Paulo (Saulo), azalaki na molende mpo na lingomba na bango ya Bayuda, yango wana anyokolaki lisangá

Nani asalaka ete basaleli ya Yehova bányokwama?