Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli

Libondeli

Ndenge nini toyebi ete Yehova ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli?

Nz 65:2; 145:18; 1Yn 5:14

Talá mpe Nz 66:19; Mis 10:31; Ebr 5:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 18:​36-38—Yehova ayanolaki noki na libondeli ya mosakoli Eliya na ngomba Karamele ntango bawelanaki na basakoli ya Baala

    • Mt 7:​7-11—Yesu alendisaki biso tótingama na mabondeli mpe andimisi biso ete lokola Yehova azali Tata ya bolingo akoyoka biso

Bakristo basengeli kobondela kaka nani?

Tobondelaka na nkombo ya nani?

Yehova ayokaka mabondeli ya banani?

Yehova ayokaka te mabondeli ya banani?

Mas 15:29; 28:9; Yis 1:15; Mik 3:4; Yk 4:3; 1Pe 3:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yos 24:​9, 10—Yehova aboyaki koyoka Balaame mpo likambo oyo asɛngaki eyokanaki te na mokano ya Nzambe

    • Yis 1:​15-17—Lokola bato na ye bakómaki na bokosi mpe na ngambo ya makila, Yehova aboyaki koyoka mabondeli na bango

Wapi lolenge ya malamu ya kosukisa libondeli, mpe mpo na nini?

Biblia esɛngi nde tóbondelaka ya kotɛlɛma, ya kofanda, ya kofukama to na ndenge moko boye?

Wapi mwa makambo oyo basaleli ya Yehova bakoki kobondela mpo na yango ntango bayangani?

Mis 4:​23, 24; 12:5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Nt 29:​10-19—Mokonzi Davidi abondelaki liboso ya bato ya Yisraele ntango basangisaki makabo oyo bato bapesaki mpo na tempelo

    • Mis 1:​12-14—Bantoma, bandeko ya Yesu, Maria mama ya Yesu mpe basi mosusu ya sembo bazalaki kobondela elongo na shambrɛ ya likoló na Yerusaleme

Mpo na nini moto oyo azali kobondela asengeli te komikumisa to koluka kokamwisa basusu?

Mpo na nini tosengeli kobondela liboso ya kolya?

Mpo na nini tosengeli ata moke te kozala na bolɛmbu ya kobondela Tata na biso ya likoló?

Ro 12:12; Ef 6:18; 1Te 5:17; 1Pe 4:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Da 6:​6-10—Mosakoli Danyele akobaki kobondela Yehova na polele, ata soki bakokaki koboma ye

    • Lk 18:​1-8—Mpo na komonisa ete Tata na biso ya sembo akoyanola noki soki tokobi kosɛnga ye lisalisi, Yesu apesaki ndakisa ya mosambisi moko ya kozanga bosembo oyo akokisaki mposa ya mwasi oyo akobaki kosɛnga ye akata likambo na ye na bosembo

Tosengeli kosala nini soki tolingi ete Nzambe ayoka mabondeli na biso ya kosɛnga bolimbisi?

2Nt 7:​13, 14

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ba 22:​11-13, 18-20—Lokola Mokonzi Yosiya amikitisaki mpe alukaki kosepelisa Yehova, Yehova amoniselaki ye motema mawa mpe boboto

    • 2Nt 33:​10-13—Mokonzi Manase amikitisaki mpe abondelaki, yango esalaki ete Yehova alimbisa ye mpe azongisa ye na bokonzi

Yehova asɛngi biso tósala nini soki tolingi alimbisa biso?

Mpo na nini tosengeli koyebisa Yehova na mabondeli ete tolingi mokano na ye esalema?

Mpo na nini mabondeli na biso esengeli komonisa ete totyelaka Tata na biso ya likoló motema?

Tokoki kobondela mpo na makambo nini?

Kosantisama ya nkombo ya Nzambe

Koya ya Bokonzi ya Nzambe mpo eyangela mabele mobimba

Kosalema ya mokano ya Yehova

Kosɛnga biloko oyo tozali na mposa na yango

Kosɛnga bolimbisi ya masumu na biso

Da 9:19; Lu 11:4

Kosɛnga Yehova abatela biso na komekama

Kopesa ye matɔndi

Kosɛnga Nzambe ete tóyeba mokano na ye, tózwa bososoli mpe bwanya

Mas 2:​3-6; Flp 1:9; Yk 1:5

Talá mpe Nz 119:34

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 3:​11, 12—Yehova asepelaki ndenge Mokonzi Salomo asɛngaki ye bwanya, mpe apesaki ye yango mingi mpenza

Tokoki kosɛnga elimo santu

Tokoki kobondela mpo na basusu, ata mpe mpo na baoyo bazali konyokwama

Maloba ya kosanzola

Nz 86:12; Yis 25:1; Da 2:23

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 10:21—Yesu asanzolaki Tata na ye liboso ya bato nyonso mpo amonisaki mateya na ye epai ya bato ya komikitisa oyo bazali lokola bana

    • Em 4:​9-11—Baanzelu bapesaka Yehova lokumu mpe nkembo oyo abongi na yango

Kobondela ete baoyo bazali na bokonzi bátika biso tósambela Yehova na kimya mpe tósakwela bato

Ezali malamu tóbondela ntango tozali kozwa batisimo?

Ezali malamu tóbondela mpo na baoyo bazali na maladi ya elimo?

Mpo na nini mbala mingi mibali babondelaka motó polele mpe na bantango mosusu basi bazipaka motó?

Likambo nini ezali na ntina koleka, molai ya libondeli to mayoki na biso ntango tozali kobondela?

Bil 3:41; Mt 6:7

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Ba 18:​25-29, 36-39—Mpo kopesa Eliya eyano, basakoli ya Baala babondelaki mbala na mbala, kasi Baala ayanolaki bango te

    • Mis 19:​32-41—Na Efese basambeli ya bikeko bayembelaki nzambe mwasi Artemisi na boumeli ya ngonga mibale, kasi eloko moko esalemaki te; mokomi-makambo ya engumba yango ayebisaki bango bátika kotya mobulu