Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosakola nsango malamu

Kosakola nsango malamu

Mpo na nini bakristo nyonso ya solo bamonisaka kondima na bango polele?

Ndakisa nini Yesu atiká na mosala ya kosakola?

Lk 8:1; Yn 18:37

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 4:​42-44—Yesu alobaki ete atindamaki na mabele mpo na kosakola

    • Yn 4:​31-34—Yesu amonisaki ete mosala ya kosakola nsango malamu ezalaki lokola bilei mpo na ye

Ezali kaka bandeko oyo bazali na mwa bokonzi na lisangá nde bazali na mokumba ya kosakola nsango malamu?

Nz 68:11; 148:​12, 13; Mis 2:​17, 18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ba 5:​1-4, 13, 14, 17—Mwana mwasi Moyisraele ayebisaki mwasi ya Naamane mpo na Elisha, mosakoli ya Yehova

    • Mt 21:​15, 16—Ntango bana moko ya mibali bazalaki kokumisa Yesu, banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli basilikelaki bana yango, kasi Yesu asembolaki bango

Mokumba nini bakɛngɛli bakristo bazali na yango na mosala ya kosakola nsango malamu mpe koteya basusu?

Ndenge nini Yehova ná Yesu basalisaka biso tósala mosala ya kosakola?

2Ko 4:7; Flp 4:13; 2Ti 4:17

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 16:​12, 22-24; 1Te 2:​1, 2—Atako banyokolaki ntoma Paulo ná baninga na ye, bakobaki kosakola na mpiko na lisalisi ya Nzambe

    • 2Ko 12:​7-9—Ntoma Paulo, mosakoli ya molende, anyokwamaki na “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” mbala mosusu ezalaki maladi na nzoto; kasi Yehova apesaki ye makasi ya kokoba kosakola

Nani apesá bakristo lotomo ya kosakola mpe nini etindaka bango básala yango?

1Ko 1:​26-28; 2Ko 3:5; 4:13

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yn 7:15—Bato bakamwaki boyebi oyo Yesu azalaki na yango atako atángá na biteyelo ya Barabi te

    • Mis 4:13—Bato bazalaki komona bantoma lokola bato mpamba mpe batángá kelasi te; kasi bazalaki kobanga te kosakola na mpiko

Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi ete tópesa basusu formasyo ya kosakola mpe ya koteya?

Mr 1:17; Lk 8:1; Ef 4:​11, 12

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yis 50:​4, 5—Liboso aya awa na mabele, Yesu azwaki formasyo epai ya Yehova Nzambe

    • Mt 10:​5-7—Awa na mabele, amonisaki motema molai mpe apesaki bayekoli formasyo mpo na kokoba mosala ya kosakola

Ndenge nini tosengeli kotalela mokumba ya kosakola nsango malamu?

Toyokaka ndenge nini ntango tosakolaka?

Tolobelaka nini ntango tosakolaka?

Mpo na nini bakristo bamonisaka polele mateya ya lokuta?

2Ko 10:​4, 5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mr 12:​18-27—Yesu akanisaki elongo na Basadukai na Makomami mpo na komonisa bango ete bazali na libunga na oyo etali lisekwa

    • Mis 17:​16, 17, 29, 30—Ntoma Paulo akanisaki elongo na bato ya Atene mpo na komonisa bango ete ezali mabe kosambela bikeko

Mosala ya kosakola esalemaka ndenge nini?

Mpo na nini tosakolaka na bisika ya bato nyonso?

Nini emonisi ete mosala ya kosakola esɛngi motema molai mpe kokoba kozanga kotika?

Mosala ya kosakola ebimisaka matomba nini?

Mpo na nini ezali malamu kosakola na mabaku nyonso?

1Ko 9:23; 1Ti 2:4; 1Pe 3:15

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yn 4:​6, 7, 13, 14—Atako alɛmbaki, Yesu ayebisaki mwasi Mosamaria nsango malamu na esika oyo bato batɔkaka mai

    • Flp 1:​12-14—Ata ntango batyaki ye na bolɔkɔ mpo na kondima na ye, ntoma Paulo asalelaki mabuku nyonso mpo na kopesa litatoli mpe kolendisa basusu

Tosengeli nde kozela ete bato nyonso báyoka nsango na biso?

Yn 10:​25, 26; 15:​18-20; Mis 28:​23-28

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yir 7:​23-26—Na nzela ya Yirimia, Yehova amonisaki ndenge bato na ye bazalaki mbala na mbala koboya koyokela basakoli na ye

    • Mt 13:​10-16—Yesu amonisaki ete kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Yisaya, bato mingi bakoyoka nsango malamu kasi bakotya likebi te

Mpo na nini ekamwisaka biso te ndenge bato mingi batyaka likebi te?

Ndenge nini toyebi ete bato mosusu bakondima koyoka na ebandeli kasi bakokoba te?

Bandakisa nini esalisaka biso tókamwa te ntango bato mosusu batɛmɛlaka nsango na biso?

Tokosala nini soki bato baluki kopekisa biso kosakola?

Mpo na nini tokoki kondima ete bato mosusu bakosepela koyoka nsango malamu?

Mokumba monene nini basakoli ya nsango malamu bazali na yango na miso ya Nzambe?

Mpo na nini tosengeli kosakwela bato ya mangomba nyonso, loposo mpe bikólo nyonso?

Ezali mabe kosakola na mokolo moko na kati ya pɔsɔ ata mpe mokolo ya Sabata?

Bandakisa nini emonisi ete tosengeli kosakwela bato nyonso, ata soki bazali na Biblia mpe basambelaka?