Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobongola motema

Kobongola motema

Mpo na nini moto nyonso asengeli kobongola motema mpe kosɛnga ete Yehova alimbisa ye?

Ro 3:23; 5:12; 1Yn 1:8

Talá mpe Mis 26:20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 18:​9-14—Yesu apesaki ndakisa mpo na komonisa ete tosengeli koyambola masumu mpe kobondela ete Nzambe asalisa biso

    • Ro 7:​15-25—Atako azalaki ntoma mpe moto ya kondima, Paulo atungisamaki mpo asengelaki kobundisa bamposa na ye ya kosala lisumu

Yehova ayokaka ndenge nini mpo na baoyo babongoli motema?

Ezk 33:11; Ro 2:4; 2Pe 3:9

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 15:​1-10—Yesu apesaki ndakisa mpo na komonisa ete Yehova ná baanzelu basepelaka ntango mosumuki abongoli motema

    • Lk 19:​1-10—Zakai, mokonzi ya bakɔngɔli-mpako, abongolaki motema mpe atikaki banzela ya mabe, alimbisamaki mpe azwaki lobiko

Ndenge nini tokoki komonisa ete tobongoli mpenza motema?

Ndenge nini boyebi ya sikisiki ya solo esalisaka moto oyo abongoli mpenza motema?

Ro 12:2; Kol 3:​9, 10; 2Ti 2:25

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 17:​29-31—Ntoma Paulo amonisaki bato ya Atene ntina oyo losambo ya bikeko ezali elembo ya kozanga boyebi mpe alendisaki bango bábongola motema

    • 1Ti 1:​12-15—Liboso azwa boyebi ya sikisiki etali Yesu Kristo, ntoma Paulo asalaki masumu minene mpo na kozanga boyebi

Kobongola motema ezali na ntina nini?

Mpo na nini tosengeli komindimisa ete soki tobongoli motema, Yehova akolimbisa biso ata soki tosali masumu mbala ebele?

Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo bayamboli masumu mpe batiki banzela ya mabe?

Ndenge nini toyebi ete kobongola motema esuki kaka te na koyoka mawa na mabe oyo tosali?

2Nt 7:14; Mas 28:13; Ezk 18:​30, 31; 33:​14-16; Mt 3:8; Mis 3:19; 26:20

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 33:​1-6, 10-16—Atako asalaki mabe mingi, Mokonzi Manase amonisaki ete abongoli motema ya solosolo ntango amikitisaki, akobaki kobondela mpe abongolaki bizaleli na ye

    • Nz 32:​1-6; 51:​1-4, 17—Mokonzi Davidi amonisaki ete abongoli motema ntango ayokaki mawa na masumu oyo asalelaki Yehova, ayambolaki yango mpe abondelaki

Ntango baoyo basalelaki biso lisumu babongoli motema, mpo na nini tosengeli kolimbisa bango?