Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosilisa matata

Kosilisa matata

Ntango moto moko asali biso mabe, mpo na nini tosengeli koboya kosilika to kozongisa mabe?

Mas 20:22; 24:29; Ro 12:​17, 18; Yk 1:​19, 20; 1Pe 3:​8, 9

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 25:​9-13, 23-35—Ntango Nabale afingaki Davidi ná bato na ye mpe aboyaki kosalisa bango, Davidi asilikaki mpe alingaki koboma ye ná bato ya ndako na ye, kasi toli ya bwanya ya Abigaile esalisaki Davidi azala na nyongo ya makila te

    • Mas 24:​17-20—Na lisalisi ya elimo santu, Mokonzi Salomo akebisaki bato ya Nzambe ete Yehova alingaka te tósepela ntango banguna na biso bazali konyokwama, mpe tondimaka ete Yehova akosambisa moto mabe

Soki mokristo azali na matata na moto moko, asengeli kotika kosolola na ye to kokata boninga?

Le 19:​17, 18; 1Ko 13:​4, 5; Ef 4:26

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 5:​23, 24—Yesu amonisaki ete tosengeli kosala nyonso mpo na kotya kimya na ndeko oyo azali na likambo ná biso

Tokosala nini soki moto moko ayokisi biso mpasi?

Mpo na nini tosengeli kokoba kolimbisa baoyo basaleli biso lisumu mpe babongoli mpenza motema?

Soki ndeko moko asali biso mabe oyo tozali kokoka kolekisa te, na ndakisa, akoseli biso makambo to abubi biso, nani asengeli kosolola na ndeko yango, mpe na mokano nini?

Mt 18:15

Talá mpe Yk 5:20

Soki moto oyo akoseli biso makambo to abubi biso aboyi kobongola motema ntango tosololi na ye moko, tokosala nini?